Ndenge nini nakoki koyokana na molakisi na ngai?
Mokapo 20
Ndenge nini nakoki koyokana na molakisi na ngai?
Komá nkombo ya molakisi oyo olingaka mingi. ․․․․․
Mpo na nini olingaka molakisi yango? ․․․․․
Komá nkombo ya molakisi oyo okokaka te koyokana na ye. ․․․․․
OKOKI kopona baninga, kasi mbala mingi ntango oyo ozali naino elenge, okoki te kopona balakisi. Ntango mosusu olingaka bango nyonso. David, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Naino nazwá mpenza likambo moko te na balakisi na ngai. Natosaka bango, mpe bango balingaka ngai mingi.”
Nzokande, okoki kozala na molakisi oyo azali ndenge moko na oyo Sara, oyo azali na mbula 11, alobeli. “Aza’ mabe mpenza! Nakangaka ntina te ya makambo oyo ateyaka biso. Alimbolaka mateya malamu te, to mpe alobelaka makambo mingi.” Mpo oyokana malamu na molakisi na yo, libosoliboso osengeli koyeba malamumalamu mokakatano oyo ozali na yango. Soki oyebi
mokakatano yango malamumalamu, okoki kolonga yango. Tyá elembo ✔ na kare moko kati na bakare oyo ezali na nse, to komá mokakatano na yo.□ Nakokaka kokanga ntina ya mateya ya molakisi te
□ Namoni ete nasengeli kozwa bapwɛ ebele
□ Namoni ete alingaka basusu mingi koleka ngai
□ Apamelaka mingi koleka ndelo
□ Namoni ete asalelaka ngai makambo ndenge moko te na basusu
□ Makambo mosusu ․․․․․
Nini okoki kosala mpo obongisa likambo yango? Libosoliboso osengeli kosalela toli oyo ntoma Petro apesaki. Akomaki boye: “Bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu.” (1 Petro 3:8) Nini ekoki kotinda yo omitya na esika ya molakisi oyo omoni ete aza’ mabe? Talelá mwa makambo balobeli mpo na balakisi, oyo ekoki kosalisa yo.
Balakisi basalaka mpe mabe. Lokola bato nyonso, balakisi bazalaka na bizaleli oyo basusu bamonaka mabe, bazalaka na mikakatano, bakaniselaka mpe basusu mabe. Yakobo akomaki boye: “Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:2) Brianna, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Molakisi na biso ya matematiki azalaki motema molai mpenza te mpe azalaki mbala mingi kogangela biso. Yango wana ezalaki mpasi tómemya ye.” Nini esalaki ete bákóma ndenge wana? Brianna alobi boye: “Bana-kelasi bazalaki ntango nyonso mobulu, mpe bazalaki kosala bozoba mingi kaka mpo na kopesa molakisi nkanda makasi.”
Na ntembe te, olingaka ete molakisi alandela mabe na yo te, mingimingi soki ozali na makambo mingi oyo ezali kotungisa yo. Okoki mpe kosala yango epai ya molakisi na yo?
Komá awa na nse likambo moko oyo eutaki kosalema na kelasi mpe nini esalaki ete molakisi na yo asilika.․․․․․
Balakisi bazalaka na bana oyo balingaka mingi. Talá mikakatano oyo balakisi bakutanaka na yango: Na kelasi na bino, bana boni balingaka koya? Na kati ya baoyo balingaka koya, bana-kelasi boni bakokaka kolanda malamu liteya moko na boumeli ya miniti 30 to koleka? Bana-kelasi boni balingaka kosilisa nkanda na bango epai ya balakisi mpe komonisa bango mpasi? Sikoyo kanisá ete ozali na mosala ya kotángisa baninga na yo 20, 30 to koleka, kasi mwa ndambo kaka nde bazali kolanda na likebi. Okolinga mingi kotya likebi na bato oyo emonani ete bazali kolanda, boye te?
Ya solo, okoki kosilika ntango ozali komona lokola ete bazali kolinga moto mosusu mingi koleka yo. Natasha alobi boye mpo na molakisi na ye: “Azalaki kotya dati oyo biso nyonso tosengeli kozongisa badevuare kasi mbala mingi azalaki kosala yango te kaka epai ya baoyo babɛtaka bale. Yango ezalaki mpamba te, mpo azalaki mosungi ya antrenɛrɛ ya ekipi ya bale.” Soki likambo ya ndenge wana ekómelaka yo, omituna boye: ‘Yango ezali kopekisa ngai nakoba kotánga?’ Soki te, mpo na nini nazala na nkanda to na zuwa?
Komá awa na nse nini okoki kosala mpo omonisa molakisi na yo polele ete osepelaka na makambo oyo atángisaka bino.
․․․․․
Balakisi bakaniselaka bana mabe. Na ntango mosusu, bizaleli ekeseni to kokanisela mosusu mabe, esalaka ete yo ná molakisi na yo bóbendana. Soki ozali kotuna mituna, akoki komona yango
lokola botomboki, to soki olobi likambo moko ya kosɛkisa, akoki kokanisa ete ozangi limemya to ozali kosala bozoba.Okoki kosala nini soki molakisi akaniselaka yo mabe? Biblia elobi boye: “Bózongisela moto mabe na mabe te. . . . Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.” (Baroma 12:17, 18) Koluka kosilikisa molakisi na yo te. Bóbendanaka te na makambo ezangá ntina. Kotinda molakisi na yo te azala na ntina mpenza ya komilelalela mpo na yo. Luká nde komesana na ye. Okoki komituna boye: ‘Komesana na ye?’ Ɛɛ, pesáká molakisi na yo mbote na limemya ntango okómi na kelasi. Soki ozali kokoba komonisa bokonde—ata mpe kosɛka mwa moke mbala na mbala—akoki kobongola makanisi oyo azalaka na yango mpo na yo.—Baroma 12:20, 21.
Na ndakisa, Ken azalaki na balakisi oyo bazalaki mbala mingi kokanisela ye mabe. Alobi boye: “Nazalaka nsɔninsɔni, mpe nazalaki kosolola ata moke te na balakisi na ngai.” Ndenge nini alongaki mokakatano yango? Alobi boye: “Nayaki komona ete mbala mingi balakisi na ngai bazalaki nde na mposa ya kosalisa ngai. Na yango, namityelaki mokano ya koyeba malamumalamu balakisi na ngai nyonso. Ntango nasalaki yango, namonaki ete bapwɛ na ngai emataki mingi.”
Masese 25:15, Biblia Contemporary English Version) Kitisá motema mpe lobá na boboto ntango basaleli yo makambo na bosembo te. Molakisi na yo akoki kotalela lisusu makanisi oyo azalaka na yango mpo na yo.—Masese 15:1.
Ya solo, yango elimboli te ete okoyokana na molakisi nyonso soki oluki komesana na ye mpe kosolola na ye. Kasi zalá motema molai. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Motema molai mpe maloba ya boboto ekoki kondimisa mokonzi [to molakisi] mpe ekoki kosilisa ata likambo nini.” (Soki molakisi akaniselaka yo mabe to asalelaka yo makambo ya kozanga bosembo, mbala mingi osalaka nini libosoliboso?
․․․․․
Lolenge eleki malamu ya kosala ekoki kozala nini?
․․․․․
Kosilisa likambo moko oyo okutani na yango mpenza
Koyeba ete molakisi mpe asalaka mabunga ekoki kaka te. Okoki kosala nini mpo osilisa likambo moko oyo okutani na yango mpenza? Na ndakisa, ndenge nini okoki kosilisa mikakatano oyo elandi?
Esengelaki nazwa bapwɛ ya malamu koleka. Katrina alobi boye: “Nazalaki kozwa ntango nyonso bapwɛ ya likoló. Kasi, mbula moko molakisi na biso ya siansi apesaki ngai bapwɛ ya nse. Esengelaki nazwa bapwɛ ya malamu koleka. Baboti na ngai bakendaki kosolola na mokambi ya eteyelo. Kasi amatiselaki ngai bapwɛ kaka moke mpo nakoka koleka na kelasi mosusu; yango epesaki ngai nkanda.” Soki okutani na likambo ya ndenge wana, kobanda te kobimisa makambo mpo na kofunda molakisi na yo. Zwá nde liteya na ndakisa ya Natane, oyo Biblia elobeli. Azalaki na mokumba ya mpasi ya koyebisa polele na Mokonzi Davidi libunga monene oyo asalaki. Natane akɔtaki te na loyenge na ndako 2 Samwele 12:1-7.
ya mokonzi mpe abandi kofunda ye, kasi asololaki na Davidi na mayele.—Ndenge moko mpe, okoki kosolola na molakisi na yo na komikitisa mpe na malɛmbɛ. Soki obandi kosilika to kofunda molakisi na yo ete ayebi kotángisa te to mpo na likambo ya mabe koleka, okokómisa ye moninga na yo te. Meká kosala ndenge mosusu. Bandá naino kosɛnga molakisi na yo asalisa yo oyeba ndenge apesaka bapwɛ. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Moto oyo apesaka eyano liboso ya koyoka likambo azali zoba, pe amiyokisaka soni.” (Batoli [Masese] 18:13, Bible na lingala ya lelo oyo) Ntango oyoki, okoki koyeba malamu esika oyo libunga esalemaki. Ata soki bapwɛ na yo emati te, na ntembe te molakisi na yo akosepela na bwanya oyo okomonisa.
Namoni ete molakisi na ngai akaniselaka ngai mabe. Tózwa ndakisa ya Rachel. Azalaki kozwa ntango nyonso bapwɛ ya malamu na kelasi. Kasi, ntango akómaki na kelasi ya 5, makambo ebongwanaki. Rachel alobi boye: “Molakisi asalaki nyonso mpo nazwa te na kelasi na ye.” Likambo ezalaki nini? Molakisi amonisaki polele epai ya Rachel ná mama na ye ete alingaka lingomba na bango te.
Nini esalemaki? Rachel alobi boye: “Ntango nyonso oyo ezalaki komonana polele ete molakisi azalaki kopesa ngai bapwɛ ya malamu te mpo azalaki kokanisela ngai mabe, mama azalaki kokende ná ngai kosolola likambo yango ná molakisi. Nsukansuka, atikaki konyokola ngai.” Soki okutani na mokakatano ya ndenge wana, zalá na mpiko ya koyebisa yango baboti na yo. Na ntembe te, bakosepela kosolola na molakisi, ata mpe bakambi ya eteyelo, mpo na kosilisa likambo yango.
Monáká mosika
Ezali solo ete mikakatano mosusu ekosila noki te. Na bantango mosusu, esɛngaka kaka oyika mpiko. Tanya alobi boye: “Molakisi na biso azalaki komonisela biso bana-kelasi bizaleli mabe. Mbala mingi azalaki kotyola biso, mpe kobenga biso bazoba. Liboso ezalaki kolelisa ngai, kasi namonaki ete esengeli te natika kotyola wana eswa ngai na motema. Natyaki makanisi na ngai na mosala mpe nakobaki kolanda malamu mateya na kelasi. Na yango, azalaki kotungisa ngai lisusu mingi te, mpe tozalaki moke oyo tozalaki kozwa bapwɛ ya malamu. Nsima ya mbula mibale, balongolaki molakisi yango na mosala.”
Soki ozali koyekola kokanga motema ntango molakisi azali kosala yo matata, yango ekosalisa yo bomoi na yo mobimba—okoyeba mpe kokanga motema ntango patrɔ na mosala akosala yo matata. Okoyeba mpe kosepela ntango ozali na molakisi ya malamu.
Oz’omona lokola oza’ lisusu na ntango mingi te na mokolo? Talá ndenge okoki kokómisa montre moninga na yo, kasi monguna na yo te.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Yango wana, makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12.
TOLI
Soki omoni ete oz’osepela na molakisi na yo te, kolanda ye te, landá nde mateya na ye. Komá makambo oyo azali kotángisa yo, tuná ye mituna na limemya nyonso mpo na koyeba makambo mosusu, mpe landá mateya na ye na esengo. Esengo na yo ekotinda mpe basusu bákóma na esengo.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Ekoki kozala ete molakisi na yo atángisaki mateya yango mbala ebele mpenza na bakelasi mosusu. Yango wana ekoki kozala mpasi atángisa lisolo yango na esengo ndenge atángisaki yango liboso.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo nakóma kosepela mingi na liteya oyo ezali kosepelisa ngai te, nako ․․․․․
Soki namoni ete molakisi na ngai azali kosalela ngai makambo na bosembo te, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini ezali na ntina kolanda mingi mateya, kasi molakisi te?
● Ezaleli oyo ozali na yango ntango ozali kolanda mateya, ekoki kotinda molakisi akóma na ezaleli nini epai na yo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 146]
“Nasalaki makasi nazala moninga ya balakisi na ngai nyonso. Nayebi bankombo na bango, mpe soki namoni bango na balabala, nazwaka mwa baminiti mpo na kosolola na bango.”—Carmen
[Elilingi na lokasa 145]
Balakisi bazali lokola mabanga oyo ezali kosalisa yo okatisa mai, elingi koloba bazali kosalisa yo mokemoke ozwa boyebi, kasi yo nde osengeli kosala makasi okóma na yango