INDONÉSIE
Mosala epalangani na ɛsti
Na 1953, batindaki ndeko Peter Vanderhaegen mokɛngɛli ya zongazonga na Indonésie. Asengelaki kotala masangá ya ekólo mobimba, kilomɛtrɛ soki 5 100 longwa na ɛsti tii na wɛsti mpe kilomɛtrɛ 1 800 longwa na nɔrdi tii na sudi. Ntango azalaki kokende na bisika wana nyonso, mbala mingi azalaki kokutana na makambo ya nsɔmɔ.
Na 1954, ndeko Vanderhaegen asalaki mibembo na ɛsti ya Indonésie, na bitúká oyo ezali na mangomba ndenge na ndenge, kati na yango esanga Bali, oyo etondi na bato ya Lingomba ya Hindu; esanga Lombok mpe esanga Sumbawa, oyo etondi na Bamizilma; esanga Flores, oyo etondi mingimingi na bato ya Katolike; mpe esanga Sumba, Alor mpe Timor, oyo etondi na bato ya Protesta. Ntango azalaki kosala mobembo na masuwa moko ya mabemabe,
asakolaki mwa moke na bisanga ndenge na ndenge liboso akóma na Kupang, mboka-mokonzi ya Timor occidental. Ndeko Vanderhaegen alobaki boye: “Nasakolaki na Timor bapɔsɔ mibale. Atako mbula ezalaki kobɛta mingi, nakabolaki mikanda nyonso oyo nazalaki na yango, bato 34 basalaki abonema ya bazulunalo, mpe nabandaki koyekola Biblia na bato ebele.” Babongisi-nzela monene bazongelaki bato yango mpe bafungolaki lisangá na Kupang. Banda wana, nsango malamu epalanganaki na bisanga ya pembenipembeni, esanga Rotè, Alor, Sumba mpe Flores.Ntango bakonzi ya Lingomba ya Protesta ya Kupang bamonaki ete bandimi na bango bakómi koyoka mateya ya Batatoli ya Yehova, bayokaki zuwa makasi. Mokonzi moko monene ya lingomba yango asɛngaki Thomas Tubulau, mobange moko oyo azalaki na lobɔkɔ moko ya ebende, atika koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova; ayebisaki ye ete soki akobi koyebisa bato mosusu makambo oyo azali koyekola, makila ekotanga. Tata Thomas ayebisaki ye na mpiko ete: “Mokristo moko te akoki koloba makambo oyo olobi. Okomona ngai lisusu na ndako-nzambe na bino te.” Tata Thomas akómaki mosakoli ya molende, mpe mwana na ye ya mwasi akómaki mobongisi-nzela monene.
Atako bongo, bakonzi ya mangomba ya Timor bakanaki kaka kosukisa Batatoli ya Yehova. Na 1961, balongaki kotinda bakonzi ya biro oyo etalelaka makambo ya losambo mpe bakonzi ya basoda ya mboka bápekisa Batatoli ya Yehova kosakola ndako na ndako. Na yango, bandeko basalelaki mayele mosusu. Bakómaki koteya na bazando mpe na mabulu ya kotɔka mai, kosolola na babomi-mbisi na mabongo, mpe na bato oyo bayei kotala malita ya bandeko na bango esika bakundaka bibembe. Nsima ya sanza moko, bakonzi ya basoda balɛmbisaki motema mpe bapesaki liyebisi na radio ete bato nyonso bazwi bonsomi ya losambo na Timor. Lokola bakonzi ya biro oyo etalelaka makambo ya losambo bazalaki kaka koboya ete bandeko
bázongela kosakola ndako na ndako, bandeko basɛngaki bango bákoma makanisi na bango na mokanda. Bakonzi yango baboyaki. Na nsima, bandeko bazongelaki kosakola ndako na ndako na bonsomi.Ntango ndeko Piet de Jager ná mwasi na ye Nell mpe ndeko Hans van Vuure ná mwasi na ye Susie, oyo bazalaki bamisionɛrɛ bakómaki na etúká ya Papouasie na 1962, bakonzi ya mangomba ya bokristo batɛmɛlaki mpe bango. Bakonzi misato basololaki na bamisionɛrɛ yango mpe basɛngaki bango bákende kosakola esika mosusu. Ezala ntango bazali koteya na ndako-nzambe, ezala na mikanda, to na radio, bakonzi yango bafundaki Batatoli ya Yehova ete bazali kotinda bato bátombokela guvɛrnema. Soki bamisionɛrɛ bakómi koyekola Biblia na mondimi na bango moko, bazalaki kolɛngola mondimi yango, kobangisa ye, to kopesa ye mbongo mpo atika. Batindaki mpe bankumu ya mboka bápekisa mosala ya kosakola.
Kasi, basukaki ntango nkumu ya mboka moko asɛngaki bamisionɛrɛ báya koteya bato ya mboka na ye. Ndeko Hans alobaki boye: “Ntango nkumu yango ayanganisaki bato, ngai ná Piet tosalaki badiskur mibale ya mikuse mpo na kolimbola mosala na biso. Na nsima, basi na biso bamonisaki ndenge tokokende kobɛta na baporte na bango, tokokɔta na ndako soki bayambi biso, mpe tokoyebisa nsango mokuse oyo euti na Biblia. Nkumu yango mpe bato ya mboka basepelaki mpe bandimaki tósala mosala na biso na kimya.”
Tokutanaki na makambo mingi ya ndenge wana mpe ya ndenge mosusu. Ezalaki mpasi Bamizilma bátɛmɛla mosala ya kosakola; bakonzi ya mangomba ya bokristo nde bazalaki kotɛmɛla biso mingi. Ezalaka kaka bongo tii lelo.
‘Liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpo na kopesa litatoli’
Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bakomema bino na makasi liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpo Mat. 10:18) Maloba yango ekokisami mbala mingi na Indonésie.
na kopesa bango mpe bikólo litatoli.” (Na 1960, moto moko ya Pays-Bas oyo ayekolaki teoloji mpe azalaki kofanda na Jakarta abimisaki buku moko mpo na komonisa ete Batatoli ya Yehova bazali bakristo ya lokuta. Bato mingi ya mangomba basalelaki buku yango mpo na kofunda Batatoli. Na ndakisa, mokonzi ya lingomba moko akomelaki biro oyo etalelaka makambo ya losambo ete Batatoli “babulunganisaka bandimi na bango.” Ntango bakonzi ya Leta babengaki bandeko básamba, bandeko bamonisaki ndenge makambo ezalaka mpenza, mpe yango epesaki litatoli. Mokonzi ya lingomba moko ayebisaki baninga na ye ete: “Bótika Batatoli ya Yehova. Bazali kofungola Baprotesta miso.”
Na 1964, bakonzi mosusu ya Protesta na Papouasie basɛngaki bakonzi oyo batyaka mibeko na mboka mpe balandelaka makambo ya losambo mpe bomoi ya bana-mboka bápekisa mosala ya Batatoli ya Yehova. Betele mpe esɛngaki ete bandeko bákende kosamba likambo yango. Ndeko Tagor Hutasoit alobaki boye: “Tolobaki liboso ya bakonzi ya mboka pene na ngonga mobimba mpe tolimbolaki malamu mosala na biso ya koteya bato. Moto moko ya politiki, mondimi ya Lingomba ya Protesta, alobaki ete tozali kotya mobulu na mangomba ya Papouasie. Kasi Bamizilma mingi bazalaki na boboto. Bayebisaki biso: ‘Mibeko epesi moto nyonso bonsomi ya losambo; na yango bozali na lotomo ya kosakola.’” Nsima ya likita wana, mokonzi moko monene ya guvɛrnema alobaki: “Guvɛrnema ya sika . . . epesi moto nyonso bonsomi ya losambo, mobeko yango etali mpe mangomba ya sika.”