Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 11

Bato oyo bakomaki makambo ya Yesu

Bato oyo bakomaki makambo ya Yesu

Omoni bato oyo bazali na elilingi oyo?Ezali Matai, Marko, Luka, Yoane, Petro, Yakobo, Yuda, ná Paulo. Bato yango bazalaki na bomoi na eleko moko na Yesu, mpe bakomaki makambo ya Yesu. Tólobela naino bato yango.

Mibali oyo ezali banani?

Na kati ya bato yango, misato bazalaki bantoma ya Yesu oyo bazalaki kosakola elongo na Yesu. Oyebi nkombo na bango?Matai, Yoane, ná Petro. Matai Yoane bazali bantoma oyo bayebaki Yesu malamu, mpe mokomoko na bango akomaki mokanda oyo elobeli bomoi ya Yesu. Ntoma Yoane akomaki mpe mokanda ya Emoniseli, Mokanda ya 1 Yoane, 2 Yoane, mpe 3 Yoane. Ntoma Petro akomaki mikanda mibale: 1 Petro mpe 2 Petro. Na Mokanda ya 2 Petro, akomaki ete mokolo moko mongongo ya Yehova eyokanaki na likoló mpe elobaki mpo na Yesu ete: ‘Oyo azali mwana na ngai. Nalingaka ye, mpe asepelisaka ngai.’

Bato mosusu oyo bazali na elilingi wana balobelaki mpe makambo ya Yesu na mikanda oyo bakomaki. Moko na bango ezali Marko. Ekoki kozala ete azalaki ntango bakangaki Yesu mpe amonaki makambo nyonso oyo elekaki. Mobali mosusu ezali Luka. Luka azalaki monganga mpe mbala mosusu akómaki mokristo nsima ya liwa ya Yesu.

Bato mosusu mibale oyo bakomaki Biblia, oyo ozali komona na elilingi ezali baleki ya Yesu. Oyebi nkombo na bango?Ezali Yakobo Yuda. Na ebandeli, bazalaki kondimela Yesu te. Kutu, bakanisaki ete abɛli motó. Kasi na nsima, bandimelaki ye mpe bakómaki bakristo.

Moto mosusu oyo ozali komona na elilingi ezali Paulo. Liboso akóma mokristo, nkombo na ye ezalaki Saulo. Azalaki kolinga bakristo ata moke te mpe azalaki konyokola bango. Oyebi mpo na nini Paulo andimaki kokóma mokristo?Mokolo moko, Paulo azalaki na mobembo; na nzela, ayokaki moto moko azali koloba na ye na likoló. Ezalaki Yesu! Atunaki Paulo: ‘Mpo na nini ozali konyokola bato na ngai?’ Na nsima, Paulo abongwanaki mpe akómaki mokristo. Paulo akomaki mikanda ya Biblia 14, banda na mokanda ya Baroma tii na mokanda ya Baebre.

Totángaka Biblia mokolo na mokolo, boye te?Ntango totángaka Biblia, toyekolaka makambo mingi oyo etali Yesu. Olingi koyeba makambo mosusu oyo etali Yesu?