Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 14

Yesu abandi kokómisa bato bayekoli

Yesu abandi kokómisa bato bayekoli

YOANE 1:29-51

  • BAYEKOLI YA YESU YA LIBOSO BALANDI YE

Nsima ya mikolo 40 na esobe mpe liboso ete azonga na Galile, Yesu azongi epai ya Yoane oyo abatisaki ye. Ntango azali kopusana, Yoane alakisi mosapi na ye epai ya Yesu mpe ayebisi bato oyo bazali wana ete: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili! Ye nde moto nalobaki mpo na ye ete: Nsima na ngai moto moko azali koya oyo aleká liboso na ngai, mpo azalaki liboso na ngai.” (Yoane 1:29, 30) Atako Yoane azali mwa moke mokóló ya Yesu, ayebi ete Yesu azalaki na bomoi liboso na ye lokola ekelamu ya elimo na likoló.

Mwa bapɔsɔ liboso, ntango Yesu ayaki kozwa batisimo, emonanaki ete Yoane ayebaki mpenza te ete Yesu nde Masiya. Mpo Yoane alobi ete: “Ata ngai mpe nayebaki ye te, kasi nayaki kobatisa na mai mpo ye amonisama epai ya Yisraele.”​—Yoane 1:31.

Yoane akobi kobɛtɛla bato oyo bazali koyoka ye makambo oyo esalemaki ntango azalaki kobatisa Yesu. Ayebisi bango boye: “Namonaki elimo ezali kokita lokola ebenga uta na likoló, mpe efandaki likoló na ye. Ata ngai mpe nayebaki ye te, kasi Oyo mpenza atindaki ngai nabatisa na mai alobaki na ngai ete: ‘Moto oyo okomona elimo ekiti likoló na ye mpe efandi, ye nde moto oyo abatisaka na elimo santu.’ Mpe namoni yango, mpe napesi litatoli ete oyo azali Mwana ya Nzambe.”​—Yoane 1:32-34.

Yoane azali ná bayekoli na ye mibale ntango Yesu ayei lisusu epai na ye na mokolo oyo elandaki. Yoane alobi boye: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe!” (Yoane 1:36) Ntango bayekoli yango mibale bayoki maloba ya Yoane Mobatisi, balandi Yesu. Moko na bango nkombo na ye Andre. Ekoki kozala ete moyekoli mosusu wana oyo nkombo na ye ezali mpe Yoane nde akomaki lisolo oyo. Emonani ete Yoane yango azali ndeko ya Yesu, mwana ya Salome. Emonani ete Salome azali ndeko ya Maria mpe mobali na ye nkombo na ye Zebede.

Yesu abaluki na nsima mpe amoni Andre ná Yoane, atuni bango boye: “Bozali koluka nini?”

Bango mpe batuni ye ete: “Rabi, ofandaka wapi?”

Yesu ayanoli bango ete: “Bóya, mpe bokomona.”​—Yoane 1:37-39.

Ezali na ngonga ya minei na nsima ya midi, mpe Andre ná Yoane batikali na Yesu tii na nsuka ya mokolo. Andre atondi na esengo mpe na ntango moko boye akei koluka ndeko na ye Simo, oyo babengaka ye mpe Petro, mpe ayebisi ye ete: “Tomoni Masiya.” (Yoane 1:41) Andre amemi Petro epai ya Yesu. Makambo oyo elekaki na nsima emonisi ete Yoane akutanaki mpe na ndeko na ye Yakobo mpe akendaki na ye epai ya Yesu; atako Yoane abakisi likambo yango te na kati ya makambo oyo ye moko akomaki.

Mokolo oyo elandaki, Yesu akutani na Filipe oyo azali moto ya Betesaida. Engumba yango ezali pene ya nɔrdi na bokula ya Mbu ya Galile, esika oyo Andre ná Petro bakolá. Yesu ayebisi Filipe ete: “Landá ngai.”​—Yoane 1:43.

Na nsima, Filipe akutani na Natanaele oyo bazalaki mpe kobenga Bartelemi mpe alobi na ye ete: “Tomoni moto oyo Moize, na kati ya Mibeko, mpe Basakoli bakomaki mpo na ye, Yesu, mwana ya Yozefe, moto ya Nazarete.” Natanaele alobi na ntembe nyonso na Filipi ete: “Eloko moko ya malonga ekoki nde kobima na Nazarete?”

Filipi ayebisi ye ete: “Yaká komona.” Ntango Yesu amoni Natanaele azali kopusana, alobi na ye ete: “Talá, Moyisraele ya solosolo, oyo azali na bokosi te.”

Natanaele atuni ye boye: “Ndenge nini oyebi ngai?”

Yesu ayanoli ye ete: “Liboso Filipe abenga yo, ntango ozalaki na nse ya nzete ya figi, namonaki yo.”

Na kokamwa nyonso, Natanaele azongisi ete: “Rabi, ozali Mwana ya Nzambe, ozali Mokonzi ya Yisraele.”

Yesu atuni ye boye: “Ondimi mpo nayebisi yo ete namonaki yo na nse ya nzete ya figi? Okomona makambo ya minene koleka oyo.” Na nsima Yesu apesi elaka oyo: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino: Bokomona likoló efungwami mpe baanzelu ya Nzambe bazali komata mpe kokita epai ya Mwana ya moto.”​—Yoane 1:45-51.

Mwa moke na nsima, Yesu elongo na bayekoli na ye ya sika balongwe na lobwaku ya Yordani mpe bakei na Galile.