Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Euti na biloko oyo eleki pɛto”

“Euti na biloko oyo eleki pɛto”

“Euti na biloko oyo eleki pɛto”

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA BRÉSIL

MOTO moko alobaki ete mungwa “euti na biloko oyo eleki pɛto, elingi koloba moi ná mbu.” Yango ezali mpenza bongo mpo na mungwa oyo ezwamaka ntango moi ebɛti mai ya mbu mpe ekómisi yango londende.

Na nɔrdi-ɛsti ya Brésil pembenipembeni ya mbu, ezali na etúká moko na nkombo Rio Grande do Norte oyo eyebani mingi mpo na bisika na yango epai babimisaka mungwa. Na etúká yango, molunge ezalaka mingi, mbula ebɛtaka mingi te, mpe mopɛpɛ ezalaka ntango nyonso; yango wana, etúká yango ebongi mpenza mpo na mosala ya kobimisa mungwa oyo ezwamaka ntango moi ebɛti mai ya mbu mpe ekómisi yango londende. Mungwa mingi (95%) ya Brésil eutaka na etúká yango. Moko ya bisika oyo babimisaka mungwa ndenge wana ezali na Areia Branca, engumba moko ya moke oyo ezali pene na mbu.

Tótala esika yango

Mbala mingi, bisika oyo basalaka mosala ya kobimisa mungwa ndenge wana ezalaka minene; oyo ya Areia Branca mpe ezali monene. Ntango bapaya bazali naino na balabala ya monene mpe bazali koya na engumba yango mpo na kotala esika wana, bonene na yango ekamwisaka bango. Moi ya ntɔngɔ ebɛtaka ebele ya maziba oyo mai na yango euti na mbu; bato nde basalá maziba yango. Kati na maziba yango, mingi (soki 90%) mai na yango ekómaka londende; mai ya maziba oyo etikali ekangamaka mpe ekómaka mabanga ya mungwa.

Ntango bazali kotambwisa moto na esika yango, asengeli kolata manɛti ya moi, mpamba te mungwa oyo etondi wana engɛngaka na moi. Ntina ya liboso oyo mai ya mbu ekómaka mungwa makasi ezali mpo balekisaka yango na ebele ya maziba. Maziba yango ezalaka mozindo te, ekabwani na baporte ya mabaya mpe bifelo. Maziba nyonso wana ezali 67. Na segɔnde mokomoko, moi ya makasi ná mopɛpɛ ekómisaka litre 650 ya mai londende! Atako bongo, kobanda ntango mai ya mbu ekɔtaka na maziba tii mungwa ebandaka kokangama, elekaka mikolo 90 to 100.

Ntango mai ya mbu ekómaka londende, mai oyo etikalaka ezalaka na mungwa ya kolambela; kasi ezalaka mpe na mwa ndambo ya bamungwa mosusu (na ndakisa carbonate de calcium, sulfate de calcium, sulfate de magnésium). Bamungwa yango ekitaka na nse ya maziba mokomoko na ngala na yango.

Na nsima, mai ya mungwa makasi oyo etikalaka na maziba wana, balekisaka yango na maziba mosusu 20 epai mungwa ekangamaka. Kati na maziba yango, mosusu ekómaka mabanga minene ya mungwa mpo mai ekaukaka nyonso. Basalelaka masini moko ya monene mpo na kopanzapanza mabanga yango mpe kotya mungwa na mituka. Mituka yango ememaka mungwa na masini moko ya molai mpo esukola yango na mai. Na nsima, balongolaka mai ya salite mpe basukolaka lisusu mungwa yango na mai ya pɛto.

Na nsuka, bamemaka mungwa yango na masuwa tii na esanga moko oyo ezali pene na Areia Branca. Bato nde basalá esanga yango na kati ya mbu, na ntaka ya kilomɛtrɛ 12 mosika na mokili, mpo masuwa esɛmaka wana. Esanga yango ezali lokola libándá ya ndembo (bonene ya mɛtrɛ 92 mpe bolai ya mɛtrɛ 166) epai kuna bakoki kotya tɔni 100 000 ya mungwa. Masini moko ememaka mungwa yango na esika mosusu oyo babongisá na kati ya mbu, epai kuna bamasuwa ya minene ezwaka yango mpo na kokende kotika yango na bamboka mosusu ya Brésil.

Ezali na ntina mingi mpe basalaka na yango misala mingi

Atako nzoto na biso esengelaka kaka na mwa ndambo ya mungwa, kasi mungwa ezali na ntina mingi mpo na bomoi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato mpe ya banyama. Ntango mosusu, tomonaka yango kaka lokola mwa biloko moko ya mpɛmbɛ oyo batyaka na kati ya bilei mpo ekóma elɛngi. Nzokande, basalaka na yango misala mingi mosusu ya ntina, na ndakisa na baizini oyo esalaka bibende, bilamba mpe biloko mosusu. Basalelaka yango mpe mpo na kosala sabuni, balangi oyo bapakolaka na bakɔpɔ to na basaani ya mbɛlɛ to mpe na biloko mosusu mpo na kongɛngisa yango. Lelo oyo, balobaka ete ezali na biloko koleka 14 000 oyo eyebani ete basalelaka mpe mungwa mpo na kosala yango.

Emonani ete mungwa ekozanga ata mokolo moko te. Na kati ya kilogramɛ 100 ya mai ya mbu, okokuta soki kilogramɛ 3 ya mungwa ya kolambela. Nzokande, na ntango ya kala, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kozwa mungwa. Na ndakisa, na Chine, kaka wolo nde elekaki mungwa na motuya. Biblia elobeli mungwa mbala ebele mpe emonisi misala ndenge na ndenge oyo bazalaki kosalela yango.

Na ndakisa, soki mwana abotami, bazalaki kopakola ye mungwa na nzoto. Ekoki kozala ete bazalaki kosala bongo mpo bayebaki ete mungwa ezali lokola nkisi ya monganga mpe ebomaka mikrobe. (Ezekiele 16:4) Biblia elobelaka mpe mungwa na ndenge ya elilingi. Na ndakisa, Yesu alobaki ete bayekoli na ye bazali “mungwa ya mabelé” mpo na komonisa ete nsango ya lobiko oyo bazalaki kosakola ezalaki kopesa bato likoki ya kozwa bomoi ya seko. (Matai 5:13) Bazalaki mpe kosalela mungwa lokola elembo ya eloko oyo eumelaka libela na libela mpe ebongwanaka te. Yango wana, bazalaki kotalela ‘kondimana ya mungwa’ ete ezali boyokani oyo baoyo basali yango basengeli mpenza kotosa yango.​—Mituya 18:19.

Esika babimisaka mungwa oyo tokendeki kotala na Areia Branca esalisi biso tóyeba lisusu malamu ete mungwa ezali na ntina mingi mpe tóyeba ntina oyo bato bapesá yango motuya monene ndenge wana banda kala. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi na ndenge oyo mungwa, eloko oyo “euti na biloko oyo eleki pɛto, elingi koloba moi ná mbu,” ezali mpenza beboo.

[Elilingi na lokasa 18]

Masini oyo epanzaka mabanga ya mungwa mpe etyaka yango na motuka

[Elilingi na lokasa 18]

Mungwa, liboso bápɛtola yango

[Elilingi na lokasa 18]

Esika oyo basukolaka mungwa mpe babombaka yango