Ntango nini bizaleli ya bato ekómaki Mpenza kobeba?
Ntango nini bizaleli ya bato ekómaki Mpenza kobeba?
MPO na yo, ntango nini bizaleli ya bato ekómaki mpenza kobeba? Na bomoi na yo, ya bandeko na yo ya mikóló to ya baninga na yo? Bato mosusu balobaka ete, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, oyo ebandaki na mobu 1914, ebandisaki eleko moko ya sika oyo ebebisaki mpenza bizaleli ya bato. Profesɛrɛ moko ya istware, Robert Wohl, akomaki boye na buku na ye (The Generation of 1914): “Bato oyo babikaki na etumba bamonaki ete mokili mosusu esukaki mpe mosusu ebandaki na sanza ya 8 ya mobu 1914.”
Norman Cantor moto moko ya istware, alobaki boye: “Bipai nyonso, bizaleli ya malamu ezalaki kobeba mpe kolimwa mpenza. Lokola bakonzi ya politiki mpe ya basoda basalelaki bamilio ya bato oyo bango basengeli kobatela makambo lokola bibwele oyo esengeli kobomama, mibeko nini ya lingomba ya losambo to ya bizaleli ekoki kopekisa bango kosalelana mabe mpenza lokola banyama ya zamba? . . . Kobomana oyo bato bamonaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba [1914-18] ebebisaki mpenza motuya to valɛrɛ ya bomoi ya moto.”
Hebert George Wells moto moko ya istware ya Angleterre, amonisi polele na buku na ye moko (The Outline of History) ete nsima ya kondima liteya ya evolisyo, tomonaki “kolongolama ya bizaleli ya malamu nyonso,” elingi koloba, bomoto nyonso ekufi. Mpo na nini? Bato mosusu bazali kokanisa ete moto azali kaka nyama oyo azali na mayele. Wells, oyo azalaki kondima liteya ya evolisyo, akomaki boye na mobu 1920: “Bazwaki mokano ete, moto azali nyama oyo efandaka lisangá lokola bambwa ya zamba oyo ezalaka na Inde . . . , yango wana bamonaki malamu ete, na kati ya mapinga ya bato, bambwa ya minene esengeli konyokola mpe komonela bambwa mosusu.”
Kasi, ndenge Cantor amonisi yango, etumba ya liboso ya mokili mobimba ebebisi mpenza bizaleli malamu ya moto. Alimboli boye: “Batyoli makambo nyonso ya kala, elingi koloba makambo ya politiki, elateli, mpe makambo ya kosangisa nzoto.” Mangomba, oyo ebebisi mpenza mateya ya bokristo na ndenge esangisi yango na mateya ya evolisyo mpe na ndenge etindi bato na bitumba na ngámbo nyonso mibale, ebebisi lisusu bizaleli malamu ya bato mpenza. Frank Crozier mokonzi moko ya basoda (général de brigade) ya Angleterre, akomaki boye: “Lokola mangomba ya bokristo eyebaki malamu mpenza kopesa bato mposa ya kosopa makila, tosalelaki yango.”
Mibeko ya bizaleli malamu ekufi
Na bambula oyo elandaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bambula oyo ebengamaka “Bambula ya ligboma,” makambo mpe bizaleli ya malamu oyo ezalaki kala ebwakamaki pembeni mpe na esika na yango batyaki nde makanisi ya sika oyo elobi “salá oyo olingi.” Frederick Lewis Allen moto moko ya istware, alobaki boye: “Mbula zomi oyo eyaki nsima ya etumba ekoki mpenza kobengama ‘Bambula ya bizaleli’ mabe. . . . Ntango ebongiseli ya makambo ya kala elongwaki, ekendaki mpe na bizaleli malamu oyo ebandaki kopesa ntina na bomoi mpe kongɛngisa yango, mpe ezalaki mpasi kozwa bizaleli mosusu ya malamu oyo esengelaki kozwa na esika na yango.”
Kobeba monene ya nkita na mokili na bambula ya 1930 enyokolaki bato oyo bazalaki na makanisi malamu na ndenge ekómisaki bango bobola mpenza. Kasi, na nsuka ya bambula ya 1930, mokili ek<u1D10>taki na etumba mosusu, ebebisaki kutu makambo koleka—Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Eumelaki te, bikólo esalaki bibundeli ya nsomo oyo ekoki koboma bato mpe kobebisa biloko ebele na mbala moko, yango elongolaki mokili na bobola nokinoki, kasi ek<u1D10>tisaki mpenza kobanga mpe minyoko na mokili. Na nsuka ya etumba yango, bingumba ebele mpenza ebebaki; b<u1D10>mbi atomiki mibale mpamba ebebisaki bingumba mibale ya minene na Japon! Bamilio ya bato bakufaki na bakaa ya bakangami. Etumba yango ebomaki bato milio 50: mibali, basi ná bana.
Na ntango ya nsomo wana ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na esika bato bábatela bizaleli oyo ezalaki banda kala, bango moko bamisaleli nde mibeko ya bizaleli malamu. Buku moko (Love, Sex and War—Changing Values, 1939-45) elobi boye: “Emonani lokola ete komipekisa na makambo ya kosangisa nzoto etyamaki pembeni na ntango yango, mpo makambo oyo esalemaka kaka na esika bitumba ezali, ekómaki mpe kosalema ata na bandako mingi, esika oyo bitumba ezali te. . . . Lombangu mpe motema m<u1D10>t<u1D10>m<u1D10>t<u1D10> ya ntango ya etumba eumelaki te na kolya bizaleli oyo etindaka bato básala malamu, mpe bomoi na bandako mingi ezalaki lisusu na valɛrɛ te mpe ekómaki mokuse lokola nde na esika ya etumba.”
Lokola bato bazalaki ntango nyonso kobanga liwa, yango ebebisaki mpenza boyokani na basusu, ata boyokani mpo na ntango moke. Mwasi moko moto ya Angleterre alobaki boye mpo na kolongisa bizaleli mabe na makambo ya kosangisa nzoto ya ntango wana: “Tozalaki mpenza bato ya pite te, ezalaki nde etumba.” Soda moko ya États-Unis andimaki ete: “Na kotalela bizaleli malamu oyo bato mingi bazalaka na yango, biso tozalaki bato ya pite, tozalaki bilenge mpe tokokaki kokufa na mbalakaka.”
Bato mingi oyo babikaki na etumba yango banyokwamaki mpenza mpo na makambo ya nsomo oyo bamonaki. Tii lelo bato mosusu, ná oyo bazalaki bana mike na ntango wana, makambo wana ezongelaka bango na makanisi, bamonaka lokola nde makambo mabe ya etumba yango elingi ezonga lisusu. Bato mingi babungisaki kondima na bango, mpe lokola babungisaki kondima, babungisaki mpe ezaleli ya kokenisenisa mabe na malamu. Lokola bato bazalaki lisusu te komemya bokonzi moko oyo ekoki kolakisa nini ezali mabe mpe nini ezali malamu, moto na moto akómaki kotalela makambo na ndenge na ye moko.
Bato bakómi na bizaleli ya sika
Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato babimisaki lapolo ya baankɛti ya makambo ya kosangisa nzoto oyo basalaki. Moko na baankɛti yango esalemaki na États-Unis, na bambula ya 1940, ezalaki lapolo ya Kinsey, ezalaki na nkasa koleka 800. Emonanaki boye, bato mingi bakómaki kolobela makambo ya kosangisa nzoto polelepolele, nzokande liboso bato bazalaki koyoka nsɔni kolobela yango. Atako emonanaki nsima ete mitángo oyo epesamaki mpo na mibali oyo bakómaki kosangisa nzoto na mibali mpe basi na basi mpe makambo mosusu ya mabe oyo etali kosangisa nzoto elekisaki ndelo, kasi lapolo yango emonisaki polele ete nsima ya etumba, bizaleli ya bato ebebaki mpenza kobeba.
Na boumeli ya ntango moko boye, mwa milende moko boye ezalaki kosalema mpo na kobatela bizaleli ya malamu. Na ndakisa, na radio, na bafilme mpe na televizyo, bazalaki kolobela te to kolakisa te makambo ya mbindo. Kasi yango eumelaki te. William Bennett, oyo azalaki ministre ya États-Unis oyo atali makambo ya kelasi, alimbolaki boye: “Na bambula ya 1960, Amerika ebandaki kokende mpe kokita nokinoki epai ya likambo oyo ekómaki kobengama “kobongola bato makanisi.” Mpe likambo yango emonanaki mpe na bamboka mingi. Mpo na nini bizaleli mabe ebakisamaki nokinoki na bambula ya 1960?
Na bambula wana makambo ndenge na ndenge ebimaki, tóloba, nzela moko: basi bakómi koluka bonsomi mingi mpe mbongwana na makambo ya kosangisa nzoto elongo na eloko oyo babengaki “ezaleli ya sika.” Lisusu, minganga babimisaki nkisi ya makasi ya kokanga kobota. Lokola bato bazalaki lisusu kobanga te ete soki basangisi nzoto zemi ekoki kok<u1D10>ta, basi ná mibali bakolisaki “lolango,” to “bakómaki kosangisa nzoto na moto nyonso oyo balingi mpe mpambampamba na likanisi ya kobalana ata moke te.”
Kaka na ntango yango, bazulunalo, radio, bafilme, mpe televizyo ebungisaki bizaleli na yango ya malamu. Na nsima, Zbigniew Brzezinski, mokonzi ya kala ya National Security Council na États-Unis, alobaki boye mpo na mitinda oyo bazali kolekisa na TV: “Bazali kotinda bato polele ete bámisepelisa, bazali komonisa ete kozala moto ya mobulu mpe ya nko ezali malamu, [mpe] kotinda bato básalaka pite ndenge balingi.”
Banda na bambula ya 1970, manyeto (magnétoscope) epalanganaki mpenza. Sikoyo, moto nyonso, na kati ya ndako na ye, akómi kotala bafilme ya mbindo, ya bato bazali kosangisa nzoto, nzokande kala, akokaki ata moke te kokende kotala yango na sine mpo na kobanga bato bámona ye. Kala mingi te, na nzela ya Internet, pornografi na ndenge ya mbindo makasi mpenza epalangani na mokili mobimba, moto nyonso oyo azali na ordinatɛrɛ akoki komona yango.
Na makambo mingi, ekómi kobangisa mpenza. Eumeli naino te, mokɛngɛli moko ya bol<u1D10>k<u1D10> na États-Unis alobaki boye: “Ekómi mbula zomi, bana ya balabala oyo bazalaki koya awa, nakokaki koyebisa bango nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Kasi bana oyo bakómi koya awa sika, soki nalobi na bango bazali koyeba ata eloko moko te oyo nazali koloba.”
Epai wapi tokoki kozwa litambwisi?
Tokoki kokende na mangomba ya mokili oyo te mpo na kozwa litambwisi. Na esika mangomba elobelaka nde mitinda ya boyengebene ndenge Yesu ná bayekoli ya siɛklɛ ya liboso basalaki, bamik<u1D10>tisaki nde na mokili mpe na kati ya mabe na yango. Mokomi moko atunaki boye: “Etumba nini bato babundá oyo bato balobá te ete Nzambe azalaki na ngámbo na bango?” Eleki mbula mingi sikoyo, mpo na likambo ya kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu, mokonzi moko ya lingomba na engumba New York alobaki ete: “Lingomba ezali ebongiseli kaka moko na mokili mobimba oyo, mpo na kok<u1D10>ta, masɛngami na yango ezali makasi te, ata oyo ya komata na bisi eleki yango.”
Emonani polele ete, kobeba ya bizaleli ya mokili oyo ezali kosɛnga ete likambo moko esalema nokinoki mpenza. Kasi likambo nini? Mbongwana nini esengeli kosalema? Nani akoki kosala mbongwana yango, mpe ndenge nini ekosalema?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Kobomana oyo bato bamonaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba [1914-18] ebebisaki mpenza motuya to valɛrɛ ya bomoi ya moto”
[Etanda na lokasa]
BIZALELI YA MALAMU EKESENI NA MAKAMBO YA NTINA
Na ntango ya kala, ezaleli ya malamu ezalaki komonanaka polele mpenza. To moto azali na kolongobana, azali sembo, pɛto, mpe na lokumu to mpe azali na yango te. Lelo oyo, maloba “makambo ya ntina” ezwi esika ya “bizaleli malamu.” Kasi, ndenge mwasi moko na nkombo Gertrude Himmelfarb, ye mokomi ya makambo ya kala amonisi yango na buku na ye (The De-Moralization of Society): “Moto akoki kolobela bizaleli ya malamu te ndenge akoki kolobela makambo ya ntina, . . . ete moto na moto azali na lotomo ya kopona bizaleli malamu oyo ye alingi.”
Alobi ete makambo ya ntina “ekoki kozala bindimeli, makanisi, ndenge ya kotalela likambo, mayoki, mimeseno, etamboli, makambo oyo moto alingi, kokanisela basusu mabe, ata mpe koluka kaka bolamu ya moto ye moko—likambo nyonso oyo moto, etuluku ya bato to mboka mobimba endimi ete ezali malamu, ezala na eleko nini, to mpe mpo na ntina nini.” Na eleko oyo moto na moto asengeli kopona oyo ye alingi, bato bamoni mpenza ete ebongi bápona makambo oyo bango moko bamoni ete ezali malamu, kaka ndenge baponaka biloko na wenze. Kasi lokola ekómi boye, nini ekómeli bizaleli ya malamu ya solo mpe bizaleli ya bato?
[Elilingi na lokasa]
Ezali lisusu mpasi te mpo na kozwa to kosomba bisaleli ya kominanola na ndenge ya mbindo