Biblia ezali mokanda ya nani?
Biblia elobi nini?
Biblia ezali mokanda ya nani?
BIBLIA emonisi polele banani bakomaki yango. Na ndakisa, mikanda na yango mosusu ebandaka na maloba lokola “maloba ya Nehemia,” “emonaneli ya Yisaya,” “liloba ya [Yehova] eyaki epai ya Yoele.” (Nehemia 1:1; Yisaya 1:1; Yoele 1:1) Masolo mosusu emonisami ete ekomamaki na Samwele, Gada, mpe Natana. (1 Ntango 29:29) Maloba oyo ezali likoló ya banzembo mingi emonisi bato oyo bakomaki yango.—Nzembo 79, 88, 89, 90, 103, mpe 127.
Lokola bato nde bakomaki Biblia, baoyo batyelaka yango ntembe balobaka ete ezali kaka buku oyo euti na mayele ya bato lokola babuku mosusu. Kasi, likanisi yango ezali solo?
Nkolo mokanda azali moko, kasi bakomi bazali ntuku minei
Bakomi mingi ya Biblia bamonisaki ete bakomaki na nkombo ya Yehova, Nzambe kaka moko ya solo, mpe ye moko atambwisaki bango to asalelaki anzelu na ye. (Zekalia 1:7, 9) Basakoli oyo bakomaki Makomami ya Liebele basalelaki maloba lokola “[Yehova] alobi boye” mbala koleka 300. (Amosa 1:3; Mika 2:3; Nahumu 1:12) Mikanda na bango mingi ebandi na maloba lokola “liloba ya [Yehova] eyelaki Hosea.” (Hosea 1:1; Yona 1:1) Ntoma Petelo alobaki boye mpo na basakoli ya Nzambe: “Bato balobaki oyo eutaki epai ya Nzambe wana bazalaki kopusama na elimo santu.”—2 Petelo 1:21.
Na yango, Biblia ezali buku oyo esangisi mikanda ebele oyo ezali na boyokani, mpe ekomamaki na bato mingi oyo bandimaki ete makambo oyo bakomaki eutaki na Nzambe. Elingi koloba ete Nzambe asalelaki bato mpo bákoma makanisi na ye. Ndenge nini asalaki yango?
“Epemami na Nzambe”
Ntoma Paulo alobaki ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16) Yango elingi koloba ete, mpo bato bákoma nsango ya Nzambe, Nzambe asalelaki nguya moko mpo na kotambwisa mayele na bango. Kasi Yehova ye moko nde akomaki Mibeko Zomi na bitanda ya mabanga. (Exode 31:18) Na bantango mosusu, Nzambe ayebisaki basaleli na ye mbala moko makambo oyo basengelaki kokoma. Exode 34:27 elobi ete: “[Yehova] alobelaki Moize mpe ete, Komá maloba oyo . . .”
Na mabaku mosusu, Nzambe alakisaki bato bimonaneli oyo alingaki ete bákoma yango. Yango wana, Ezekiele alobaki boye: “Namonaki bimonaneli ya Nzambe.” (Ezekiele 1:1) Ndenge moko mpe, “Danyele alɔtaki ndɔtɔ mpe amonaki bimonaneli na motema na ye wana elalaki ye na mbeto. Na nsima akomaki ndɔtɔ yango.” (Danyele 7:1) Makambo oyo ntoma Yoane akomaki na Emoniseli, mokanda ya nsuka na Biblia, azwaki mpe yango ndenge wana. Yoane akomaki ete: “Na kopemama nakómaki na mokolo ya Nkolo, mpe nayokaki nsima na ngai mongongo moko ya makasi lokola oyo ya kelelo, elobi ete: ‘Oyo ozali komona, komá yango na kati ya rulo.’”—Emoniseli 1:10, 11.
Atikelaki bakomi mwa bonsomi
Atako Nzambe atindaki bato bákoma makanisi na ye, kasi atikaki bango bámonisa makambo mosusu ya bomoto na bango. Kutu, bakomi basengelaki kosala milende mpo na kokoma nsango ya Nzambe. Na ndakisa, mokomi ya mokanda ya Mosakoli alobi ete “alukaki mpe maloba ya kitoko, mpe ya sembo, akomaki maloba ya solo.” (Mosakoli 12:10) Mpo Ezela akoma makambo oyo eleká, atángaki naino mikanda soki 14, na ndakisa “mokanda ya makambo ya ntango ya mokonzi Davidi” mpe “mokanda ya mikonzi ya Yuda mpe ya Yisalaele.” (1 Ntango 27:24; 2 Ntango 16:11) Luka, moko ya bakomi ya Baevanzile, ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta ebandeli, ete akoma yango na molɔngɔ mpenza.’—Luka 1:3.
Mikanda mosusu ya Biblia emonisi makambo mosusu oyo etali bakomi na yango. Na ndakisa Matai Levi, oyo azalaki mokɔngɔli-mpako liboso akóma moyekoli ya Yesu, atyaki likebi mingi na mitángo. Na bakomi nyonso ya Baevanzile, kaka ye nde akomaki ete ntalo oyo batɛkaki Yesu ezalaki “mbongo ya palata ntuku misato.” (Matai 27:3; Malako 2:14) Lokola Luka azalaki monganga, akomaki makambo mosusu na elobeli mpenza ya minganga. Na ndakisa, ntango alobelaki maladi ya bato mosusu oyo Yesu abikisaki, asalelaki maloba lokola “fiɛvrɛ makasi,” mpe “atondá na maba maa.” (Luka 4:38; 5:12; Bakolose 4:14) Yango emonisi ete mbala mingi, Yehova atikaki bakomi ya Biblia básalela maloba mpe ekomeli na bango moko. Kasi, atambwisaki mayele na bango; yango wana, makambo oyo bakomaki ezali solo mpe ezali nsango na ye.—Masese 16:9.
Biblia na mobimba na yango
Na ntembe te, ezali likambo ya kokamwa ete bato soki 40 oyo bafandaki na bamboka ekeseni bákoma, na boumeli ya mbula koleka 1 600, buku moko oyo makambo na yango nyonso ezali na boyokani mpe elobeli motó ya likambo kaka moko ya malamu mpenza. (Tángá lisolo “Biblia elobelaka makambo nini?” na lokasa 19) Yango ekokaki kosalema te soki batambwisamaki te na moto moko kaka oyo azali nkolo buku yango.
Esengelaki kaka Yehova asalela bato mpo bákoma Liloba na ye? Te. Kasi, ndenge atikelaki bato bákoma yango, emonisi bwanya na ye. Kutu, ntina mosusu oyo bato ya mokili mobimba basepelaka na Biblia ezali mpo elobelaka mpenza mayoki ndenge na ndenge oyo bato bamonisaka. Na ndakisa, na likambo oyo ekómelaki Mokonzi Davidi, Biblia emonisi ngambo oyo mosumuki oyo abongoli motema azalaka na yango ntango azali kosɛnga Nzambe bolimbisi.—Nzembo 51:2-4, 13, 17, maloba oyo ezali likoló ya nzembo yango.
Atako Yehova asalelaki bato mpo bákoma Makomami Mosantu, tokoki kotyela mosala na bango motema lokola baklisto ya liboso oyo bandimaki yango “lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.”—1 Batesaloniki 2:13.
OSILÁ KOMITUNA?
◼ “Makomami nyonso” ezali ya nani?—2 Timote 3:16.
◼ Ndenge nini Yehova Nzambe apesaki bakomi makanisi na ye?—Exode 31:18; 34:27; Ezekiele 1:1; Danyele 7:1.
◼ Ndenge nini bomoto mpe misala ya bakomi emonanaki na mikanda oyo bakomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe?—Matai 27:3; Luka 4:38.