Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Engebene Biblia

Mokolo ya kosambisama ezali nini?

Mokolo ya kosambisama ezali nini?

Biblia elobi ete Nzambe “atye mokolo moko oyo akani kosambisa mabele oyo bato bafandi.” (Misala 17:31) Bato mingi basepelaka te na likanisi ya kosambisama ata na lolenge nini. Ezali mpe bongo mpo na yo?

SOKI ezali bongo, okolendisama na koyeba ete Mokolo ya Kosambisama ezali ebongiseli moko ya bolingo oyo ekomemela bato mapamboli mingi​—ata mpe mapamboli mpo na bato oyo bakufá. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Mpo na nini Mokolo ya Kosambisama ezali na ntina? Nini mpenza ekosalema na boumeli ya “mokolo” yango?

Mokolo ya kosambisama​—Mpo na nini ezali na ntina?

Ntango Nzambe atyaki bato na mabele, akanaki te ete mabele ezala esika oyo bato bakomekama mpo na kokende na esika mosusu. Akelaki bato mpo báfanda libela na libela na mabele. Atako bazalaki na nzoto mpe makanisi ya kokoka, mwasi mpe mobali ya liboso batombokelaki Nzambe. Mpo na yango, babungisaki elikya ya bomoi ya seko mpo na bango moko mpe bamemelaki bana na bango nyonso lisumu mpe liwa.​—Ebandeli 2:15-17; Baroma 5:12.

Mokolo ya Kosambisama ekozala eleko ya mbula nkóto oyo na boumeli na yango bato bakozala na libaku ya kozongela bomoi oyo Adama ná Eva babungisaki. * Simbá ete Misala 17:31, oyo totángaki maloba na yango na ebandeli, elobi ete Mokolo ya Kosambisama ekotalela baoyo bazali na “mabele oyo bato bafandi.” Baoyo bakolonga na kosambisama yango, bakofanda na mabele mpe bakozala na bomoi ya seko na nzoto ya kokoka. (Emoniseli 21:3, 4) Na yango, Mokolo ya Kosambisama ekokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabele.

Yesu Kristo, azali moto oyo Nzambe atye mpo azala mosambisi. Biblia elobi ete Yesu “akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi.” (2 Timote 4:1) “Bato ya bomoi” oyo bakosambisama ezali banani? Ndenge nini bakufi bakozonga lisusu na bomoi na “mabele oyo bato bafandi”?

Yesu akosambisa “bato ya bomoi”

Tozali sikoyo pene ya nsuka oyo esakolamaki ya mokili mabe oyo, ntango Nzambe akolongola makambo nyonso oyo ezali kobebisa mokili mpe bato ya mabe. Baoyo bakobika na nsuka ya mokili oyo nde bazali “bato ya bomoi” oyo bakosambisama.​—Emoniseli 7:9-14; 19:11-16.

Na boumeli ya eleko yango ya kosambisama, oyo ekoumela mbula nkóto, Kristo Yesu elongo na bato 144 000, mibali mpe basi oyo basekwi mpo na kozala na bomoi na likoló bakoyangela mabele. Bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe, bakopesa bato matomba na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu mpe bakomema bato ya sembo malɛmbɛmalɛmbɛ tii bakokóma bato ya kokoka na nzoto mpe na makanisi.​—Emoniseli 5:10; 14:1-4; 20:4-6.

Na boumeli ya Mokolo ya Kosambisama, Satana ná bademo na ye bakokangama mpo bátindaka lisusu bato na makambo ya mabe te. (Emoniseli 20:1-3) Kasi, na nsuka ya Mokolo ya Kosambisama, Satana akobimisama mpo na kozwa lisusu libaku ya komeka bosembo ya bato nyonso ya bomoi. Baoyo bakotikala sembo epai ya Nzambe bakolonga komekama oyo Adama ná Eva balongaki te. Bakotángama bato oyo babongi mpo na kozwa bomoi ya seko na Paradiso oyo ekozongisama. Baoyo bakotombokela Nzambe na nko bakobomama mpo na libela, ndenge moko na Satana mpe bademo na ye.​—Emoniseli 20:7-9.

Kosambisa “bakufi”

Biblia elobi ete na boumeli ya Mokolo ya Kosambisama, bakufi “bakosekwa.” (Matai 12:41) Yesu alobaki ete “ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” (Yoane 5:28, 29) Yango elingi kolobela te milimo ya bato oyo bakufá oyo ekobaki kozala na bomoi esika mosusu. Bakufi bayebaka eloko moko te mpe bazali te na molimo oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. (Mosakoli 9:5; Yoane 11:11-14, 23, 24) Yesu akozongisa lisusu na bomoi awa na mabele bato oyo bakufá.

Bato oyo bakosekwa bakosambisama mpo na makambo oyo basalaki liboso ya liwa na bango? Te. Biblia eteyaka ete “moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” (Baroma 6:7) Na yango, ndenge moko na baoyo bakobika na nsuka ya mokili oyo, baoyo bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele, bakosambisama “na kolanda misala na bango” na boumeli ya Mokolo ya Kosambisama. (Emoniseli 20:12, 13) Na kotalela makambo oyo bakosala na nsima, lisekwa na bango ekozala ya bomoi to lisekwa ya kobebisama. Mingi ya baoyo bakozonga na bomoi bakoyeba libosoliboso makambo na ntina na Yehova Nzambe mpe masɛngami na ye mpo na bomoi. Bakozwa libaku ya kozala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe mpe bakozwa bomoi ya seko na mabele.

Ntina ya kobanga ezali te

Mokolo ya Kosambisama ekozala kaka te ntango ya koyekola makambo ya Nzambe kasi mpe ntango mpo na baoyo bazali na bomoi básalela makambo oyo bazali koyekola mpe bázwa mapamboli oyo yango ekomema. Kanisá naino esengo oyo okozala na yango ya kozala lisusu elongo na baninga mpe bandeko na yo oyo bakosekwa mpe bino nyonso bokokóma malɛmbɛmalɛmbɛ bato ya kokoka!

Kanisá naino esengo oyo okozala na yango ya kozala lisusu elongo na baninga mpe bandeko na yo oyo bakosekwa

Nzambe akotikela Satana nzela ameka bosembo ya bikelamu na ye na nsuka ya Mokolo ya Kosambisama. Kasi ntina ya komitungisa to ya kobanga ezali te. Na nsuka ya Mokolo ya Kosambisama, bikelamu nyonso ya bomoi bakobongisama mpenza mpo na komekama wana ya nsuka. Na yango, Mokolo ya Kosambisama ekozala na kati ya kokokisama ya mokano ya Nzambe ya kolongola makambo nyonso ya mabe oyo botomboki ya liboso epai ya Nzambe na Edene ememaki.

^ par. 7 Na Biblia, liloba “mokolo” ekoki kosalelama mpo na kolobela bileko oyo boumeli na yango ekeseni. Na ndakisa, talá Ebandeli 2:4.