MIKILI MPE BATO
Mobembo moko na Cameroun
EKOKI kozala ete Ba-Baka oyo babengaka bango mpe Batswa (pygmées) nde bazalaki bato ya liboso oyo bafandaki na Cameroun. Na nsima, na mobu 1500 Ba-Portugais bayaki kuna. Nsima ya bambula mingi, Bamizilma oyo babengi Ba-Fulani babɔtɔlaki nɔrdi ya Cameroun. Lelo oyo, bato mingi ya ekólo yango (40%) balobaka ete bazali bakristo, bato moke (20%) bazali Bamizilma, mpe bato mingi mosusu (40%) basambelaka na mangomba ya bonkɔkɔ ya Afrika.
Bato oyo bafandaka na bamboka ya Cameroun bazalaka mpenza bayambi bapaya. Bapesaka bapaya mbote mpe bakɔtisaka bango na ndako mpo na kopesa bango mai mpe biloko ya kolya. Soki moto aboyi bayamba ye ndenge wana, ezali lokola atyoli nkolo-ndako, nzokande soki andimi, akosepelisa nkolo-ndako yango.
Babandaka lisolo na kopesa bato ya libota mbote mpe kotuna bango soki bazali ndenge nini. Kutu batunaka ata soki banyama ezali malamu! Yozefe, moto moko ya Cameroun alobi boye: “Soki mopaya alingi akende,
nkolo-ndako asukaka kaka te na koyebisa ye ‘kende malamu.’ Mbala mingi, akendaka kotika mopaya na ye mpe akobaka kosolola na ye nzelanzela. Na nsima, soki bakómi na esika moko boye, akoyebisa mopaya yango ‘kende malamu’ mpe akozonga na ndako. Mopaya oyo bayambi ye ndenge wana te amonaka lokola basepeli na ye te.”Na bantango mosusu, baninga ebele balyaka na mabɔkɔ na saani kaka moko. Na Cameroun, momeseno yango ezali elembo oyo emonisaka mpenza bomoko. Kutu, na bantango mosusu basalelaka momeseno yango mpo na kozongisa boyokani kati na bato oyo boninga na bango ebebaki. Na maloba mosusu, kolya elongo ezali lokola koloba, “sikoyo tozali na kimya.”