Bwanya oyo ekosala ete libota ezala na esengo
Libala ná bana ezali makabo ya malamu mpenza oyo euti epai ya Nzambe oyo asalá biso. Alingi ete tózala na bomoi ya esengo na kati ya libota. Yango wana, na kati ya buku moko mosantu ya kala, azali kopesa biso toli oyo ekoki kobongisa bomoi na biso mpe kopesa biso esengo mingi. Talá toli ya malamu oyo elandi.
Mibali, bólingaka basi na bino
“Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.”—BAEFESE 5:28, 29.
Mobali azali mokonzi ya libota. (Baefese 5:23) Kasi, mobali ya malamu azalaka makambo makasimakasi te mpe azalaka mindɔndɔ te. Alingaka mwasi na ye mpe akokisaka bamposa na ye nyonso. Asalaka nyonso mpo na kosepelisa mwasi na ye, alukaka te mwasi asala kaka ntango nyonso makambo oyo ye alingi. (Bafilipi 2:4) Asololaka na mwasi na ye polele mpe ayokaka ye ntango azali koloba. Ayokelaka ye “nkanda makasi te,” abɛtaka ye te, mpe akatelaka ye mangala te.—Bakolose 3:19.
Basi, bómemyaka mibali na bino
“Mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”—BAEFESE 5:33.
Ntango mwasi azali na limemya epai ya mobali na ye mpe azali kondima bikateli oyo azali kozwa, libota na bango ekozala na kimya mingi. Soki mobali amikosi, mwasi na ye akotyola ye te, kasi akokoba komikitisa mpe kozala na limemya epai na ye. (1 Petro 3:4) Ntango mwasi alingi ayebisa mobali na ye likambo moko, akoluka ntango ya malamu mpenza mpo na kosolola na ye mpe akosala yango na limemya.—Mosakoli 3:7.
Zalá sembo epai ya mwasi to mobali na yo
“Mobali . . . asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.”—EBANDELI 2:24.
Ntango mwasi ná mobali babalani, bakómaka baninga ya motema. Yango wana, basengeli kosala makasi ya kosololaka na motema mobimba mpe kosalelanaka makambo na boboto mpenza mpo libala na bango ezala malamu. Basengeli kozala sembo, yango wana, moko na bango asengeli kosangisa nzoto na moto mosusu te. Soki mwasi to mobali azali sembo te epai ya molongani na ye ezali mabe mpenza. Yango ekosala ete moto moko atyela moninga motema lisusu te, mpe yango ekoki kobebisa libota.—Baebre 13:4.
Baboti, bóbɔkɔla bana na bino malamu
“Bɔkɔlá mwana . . . na kolanda nzela oyo esengeli na ye; ata ntango akokóma mobange akopɛngwa na yango te.”—MASESE 22:6.
Nzambe apesá baboti mokumba ya kobɔkɔla bana na bango. Yango esɛngi koteya bango bizaleli malamu mpe kopesa bango ndakisa ya malamu. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Ntango mwana moko akómi kosala makambo ya mabe, moboti ya bwanya asengeli kotɔmbɔka te. Moboti asengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) Soki moboti amoni ete esengeli kopesa mwana disiplini, akopesa yango na bolingo, kasi na nkanda te.
Bana, bótosaka baboti na bino
“Bana, bótosaka baboti na bino . . . ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo.’”—BAEFESE 6:1, 2.
Bana basengeli kotosaka baboti na bango mpe komemyaka bango mingi mpenza. Ntango bana bazali kopesa baboti na bango lokumu, libota ekozala na esengo, na kimya mpe na boyokani. Bana oyo bakómi mikóló bakopesa baboti lokumu soki bazali kosunga bango. Na ndakisa, bakoki kobongisela bango ndako mpe kosalisa bango na mbongo.—1 Timote 5:3, 4.