Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 5 2017 | Ntango likama ebimi​—Makambo ya kosala mpo na kobatela bomoi

Mpo na nini ezali na ntina komibongisa liboso likama ebima?

Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ oyo amoni likama amibombi; bato oyo bazangi mayele baleki kaka mpe bazwi mpasi.”​—Masese 27:12.

Zulunalo oyo emonisi makambo oyo tosengeli kosala liboso likama ebima, ntango likama ebimi, mpe nsima ya likama.

 

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ntango likama ebimi​—Makambo ya kosala mpo na kobatela bomoi

Makambo oyo ekoki kobikisa yo mpe basusu.

Makambo oyo osengeli koyeba mpo na ndenge ya kosalela kura, esansi to mazuti

Tótalela ndenge oyo tokoki kosalela kura, esansi, mazuti to petrole na ekɛngɛ: na ndako, soki tozali na motuka, mpe na misala ya mokolo na mokolo.

BIBLIA ELOBI NINI?

Bitumba

Na ntango ya kala, Bayisraele bazalaki kobunda bitumba na nkombo ya Nzambe. Yango elingi nde koloba ete Nzambe andimaka bitumba ya lelo oyo?

LISALISI MPO NA LIBOTA

Koluka bilɛngi to bisengo makasi ezangi makama?

Mpo na koyeba esika makoki na bango esuki, bilenge mingi balingaka kosala likambo moko oyo ekopesa bango bilɛngi to bisengo makasi, ata soki ekoki kotya bomoi na bango na likama. Yo mpe oyokaka mposa ya kosala bongo?

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Kazakhstan

Na ntango ya kala, bato ya Kazakhstan bazalaki kofanda esika moko te mpe bazalaki kosalela ba yourte. Makambo nini ya bomoi ya bato ya Kazakhstan ya lelo emonisaka bomoi ya bankɔkɔ na bango?

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mposo ya mbɛmbɛ

Mposo ya mbɛmbɛ mpe ndenge oyo esalemá ebatelaka mbɛmbɛ.

Makambo mosusu

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakendaka etumba te?

Eyebani mokili mobimba ete Batatoli ya Yehova baboyaka kokende etumba. Talá ntina oyo basalaka bongo.