Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo osengeli koyeba mpo na ndenge ya kosalela kura, esansi to mazuti

Makambo oyo osengeli koyeba mpo na ndenge ya kosalela kura, esansi to mazuti

MPO NA kotya molunge to malili na ndako, tozalaka na mposa ya kura; mpo motuka etambola, esɛngaka kotya esansi to mazuti; tozalaka mpe na mposa ya kura to petrole mpo na misala mosusu ya mokolo na mokolo. Atako bongo, na mokili mobimba, bato bazali kokutana na mikakatano ya makasi oyo etali kura, esansi to petrole.

Na ndakisa, Gary, oyo afandaka na Afrika ya Sudi, alobi ete “ndenge oyo esansi ezali se komata ntalo” ezali mokakatano monene. Jennifer, oyo afandaka na Philippines amitungisaka mpo bazali na kura ya malonga te; epai na bango “kura ekatanaka mpambampamba.” Fernando, oyo afandaka na El Salvador alobi ete “amitungisaka mingi ndenge milinga ya mabe ezali kobebisa mopɛpɛ, mai, mpe zamba.” Na bisika mingi na mokili, milinga oyo ezali kouta na esansi, na mazuti to na petrole ezali kobebisa mopɛpɛ, mai, mpe zamba.

Mbala mosusu okoki komituna: ‘Nakoki kosala nini mpo na kolonga mikakatano oyo etali kura, esansi, mazuti to petrole?’

Biso nyonso tokoki kopona kosalela kura, esansi, mazuti to petrole na ekɛngɛ. Koyeba kobatela kura, esansi, mazuti to petrole mpe kosalela yango na ndenge oyo ebongi epesaka matomba. Soki tozali kosalela yango mingi te, tokobimisa mbongo mingi te mpo na kofuta bafaktire to kosomba yango. Tokoboya mpe kobebisa mopɛpɛ, mai, to zamba; na ndenge yango, tokosala ete kura, esansi, mazuti to petrole ebebisama mingi te.

Sikoyo, tótalela ndenge oyo tokoki kosalela kura, esansi, mazuti to petrole na ekɛngɛ: na ndako, soki tozali na motuka, mpe na misala ya mokolo na mokolo.

NA NDAKO

Salelá na ekɛngɛ masini oyo etyaka molunge to oyo etyaka malili. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na ekólo moko na Mpoto emonisaki ete kokitisaka mwa moke molunge na masini oyo etyaka molunge na ndako na eleko ya malili ezali momeseno ya malamu mpo na kobatela kura na mbula mobimba. Derek, oyo afandaka na Canada, andimi likambo yango. Alobi boye: “Na eleko ya malili, soki biso nyonso na kati ya libota tolati bilamba ya malili, na esika ya kopelisa masini oyo etyaka molunge, tobatelaka kura.”

Toli yango etaleli mpe bamboka oyo molunge ezalaka makasi. Rodolfo, oyo afandaka na Philippines, afungolaka masini oyo etyaka malili na ndenge oyo epesaka malili makasi te. Mpo na nini asalaka bongo? Alobi: “Ezali mpo tóbebisa mbongo mingi te mpe tóbatela kura.”

Kangá bafɛnɛtrɛ mpe baporte ntango opelisi masini oyo etyaka molunge to oyo etyaka malili na ndako. * Tokoboya kobebisa kura soki tokangi bafɛnɛtrɛ mpe baporte ntango topelisi masini oyo etyaka molunge to malili. Na ndakisa, soki totiki porte polele na eleko ya malili, yango ekosɛnga ete masini oyo etyaka molunge na ndako elya kura mingi mpo na kotya molunge.

Longola kokanga bafɛnɛtrɛ mpe baporte, bato mosusu, batyá na bandako na bango bafɛnɛtrɛ oyo ekɔtisaka malili te.

Salelá baampule oyo elyaka kura mingi te. Jennifer, oyo tolobelaki liboso, alobi: “Na esika ya kosalela baampule oyo tomesaná kosalela, tokómaki nde kosalela baampule oyo elyaka kura mingi te.” Atako baampule ya ndenge wana ezalaka ntalo mingi, elyaka kura mingi te; na ndenge yango okobebisa mbongo mingi te.

MITUKA

Soki likoki ezali, na esika osalela motuka na yo moko, matá na bisi to na engbunduka. Andrew, oyo afandaka na Grande-Bretagne, alobi: “Mpo na kokende mosala, mikolo mosusu namataka na engbunduka to nakendaka na velo.” Buku moko (Energy: What Everyone Needs to Know) elobi ete “bato oyo batambolaka na mituka na bango moko balyaka esansi mingi koleka bato oyo bamataka na bisi to na engbunduka oyo ekendaka na bisika ya pene.”

Yebá liboso bisika ya kokende. Soki omibongisi liboso, yango ekosalisa yo oyeba bisika boni okokende; na ndenge yango okosalela esansi to mazuti mingi te, mpe okobungisa ntango mingi te mpe mbongo mingi te.

Jethro, oyo afandaka na Philippines, atyaka pembeni mbongo oyo akosalela mpo na kotya esansi na motuka na ye. Alobi: “Yango esalisaka ngai nabongisa malamu liboso bisika oyo nakokende.”

MISALA YA MOKOLO NA MOKOLO

Kosalela mai ya mɔtɔ mingi te. Ankɛtɛ moko emonisaki ete “na bingumba ya Australie, kura oyo bato basalelaka na bandako ezali mwa mingi (27%); kasi mwa ndambo na yango (1,3%) esilaka kaka na mai ya mɔtɔ.”

Lokola kotɔkisa mai elyaka kura mingi, kosalela mai ya mɔtɔ mingimingi te ebatelaka kura. Yango wana, Victor, oyo afandaka na Afrika ya Sudi, alobi: “Tosalaka makasi tósalela mai ya mɔtɔ mingi te ntango tozali kosukola.” Steven Kenway, moto moko ya siansi, alobi: “Kosalela mai ya mɔtɔ mingi te ezali na matomba mingi, mpo esalaka ete bato básalela kura mpe mai mingi te, esalisaka bakompanyi oyo etindaka mai mpe kura, mpe esalisaka bato . . . esalaka ete mbongo ebatelama.”

Bomá to kangá yango. Bomá miinda, kangá masini mpe baaparɛyi, na ndakisa televizyo mpe ordinatɛrɛ. Ata soki okangi yango, baaparɛyi mosusu ya ndenge wana ekobaka kolya kura soki balongoli yango na kura te. Bato mosusu ya mayele balobaka ete esengeli kolongola yango na kura to kosalela allonge oyo ezali na butɔ moko ya kokata kura. Fernando, oyo tolobeli liboso, akómá na momesano wana; alobi: “Nabomaka mwinda mpe nalongolaka na kura baaparɛyi oyo nazali kosalela te.”

Mbala mosusu tokokoka te kolandela ndenge oyo kura ezali kosalelama to ndenge oyo esansi, mazuti to petrole ezali kobebisa mopɛpɛ, mai, mpe zamba; kasi tokoki kosalela yango na ekɛngɛ. Na mokili mobimba, bato mingi balukaka kosala bongo. Kasi, mpo na koloba solo, kobatela kura, esansi, mazuti to petrole esɛngaka milende mingi mpe komibongisa. Kasi kosala bongo ememaka matomba mingi. Valeria, oyo afandaka na Mexique, alobi: “Nabateli mbongo, nabateli mpe mopɛpɛ, mai, mpe zamba.”

^ par. 10 Landá na likebi malako oyo batyá mpo na kosalela masini oyo etyaka molunge to malili na ndako. Na ndakisa, masini mosusu ya ndenge wana ezalaka na malako ya sikisiki oyo ekoki kosɛnga kotika porte to fɛnɛtrɛ polele ntango masini ezali kosala.