Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 26

Bolingo oyo Yehova amoniselaka biso esalisaka biso tólongola kobanga

Bolingo oyo Yehova amoniselaka biso esalisaka biso tólongola kobanga

“Yehova azali pene na ngai; nakobanga te.”​—NZ. 118:6.

LOYEMBO 105 “Nzambe azali bolingo”

NA MOKUSE a

1. Wapi makambo mosusu oyo bato mingi babangaka?

 KANISÁ makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango na bomoi. Ndeko Nestor ná mwasi na ye, María, balingaki kokende kosakola esika mposa ya basakoli ezali mingi. b Kasi, mpo na kokokisa mokano yango, basengelaki koyekola kosalela malamu mbongo na bango. Nzokande bazalaki kobanga ete bakozala mpenza na esengo te soki esɛngi kobika kaka na mwa mbongo moke. Ntango Biniam akómaki Motatoli ya Yehova na ekólo moko epai bazalaki kotɛmɛla mosala na biso, amonaki ete lokola azali mosaleli ya Nzambe, bakoki konyokola ye. Yango ebangisaki ye makasi mpenza. Kutu azalaki lisusu kobanga makasi koleka makambo oyo bato ya libota na ye bakosala ye soki bayoki ete akómi kosambela na lingomba moko ya sika. Bazwaki Valérie na maladi ya kanser ya lolenge ya mabe mpenza, mpe azalaki kosala makasi mpo azwa monganga oyo akondima kotosa mitinda ya Biblia na likambo etali makila. Na ntembe te, azalaki kobanga ete mbala mosusu akokufa.

2. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tólongola kobanga oyo tozalaka na yango?

2 Esí ekómelá yo obanga na ndenge wana? Mingi na biso esí ekómelá biso. Soki toyebi te kopekisa kobanga oyo tozalaka na yango, mbala mosusu tokoki kozwa bikateli ya mabe oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Yango nde Satana alingaka tósala. Alukaka mpe kosala yango mpo tóbuka mibeko ya Yehova mpe tótika kosakola nsango malamu. (Em. 12:17) Satana azali moto mabe, ayokelaka bato mawa te, mpe azali na nguya. Kasi okoki komibatela mpo alonga yo te. Na ndenge nini?

3. Nini ekosalisa biso tólongola kobanga oyo tozalaka na yango?

3 Ntango tondimisami ete Yehova alingaka biso, azali pene na biso, tokoki kolonga milende ya Satana. (Nz. 118:6) Na ndakisa, mokomi ya Nzembo 118 akutanaki na mwa mikakatano ya makasi. Azalaki na banguna mingi, kati na bango ezalaki mpe na bato ya lokumu mpenza (vɛrsɛ 9, 10). Na ntango moko boye, batyaki ye mpanzi likoló mpenza (vɛrsɛ 13). Longola yango, Yehova apesaki ye disiplini ya makasi (vɛrsɛ 18). Kasi, yango etindaki mokomi ya Nzembo yango ayemba boye: “Nakobanga te.” Nini esalaki ete amiyoka ete abatelami? Ayebaki ete atako Yehova apesaki ye disiplini, Tata na ye ya likoló azalaki kolinga ye mingi mpenza. Mokomi ya Nzembo yango amindimisaki ete ezala likambo nini akutanaki na yango, Nzambe na ye ya bolingo azalaki ntango nyonso pene na ye mpo na kosalisa ye.​—Nz. 118:29.

4. Soki tomindimisi ete Nzambe alingaka biso, makambo nini tokobanga te?

4 Tosengeli komindimisa ete Yehova alingaka mokomoko na biso. Soki tomindimisi bongo, yango ekosalisa biso tólonga makambo misato oyo ebangisaka bato mingi, elingi koloba, (1) kobanga ete tozali na likoki te ya kokokisa bamposa ya libota na biso, (2) kobanga bato, mpe (3) kobanga liwa. Bato oyo tolobeli na paragrafe ya liboso bazalaki na likoki ya kolongola kobanga oyo bazalaki na yango mpo bamindimisaki ete Nzambe alingaka bango.

KOBANGA ETE TOZALI NA LIKOKI TE YA KOKOKISA BAMPOSA YA LIBOTA NA BISO

Ndeko mobali moko azali kokanga mbisi mpo na koleisa libota na ye mpe mwana na ye ya mobali azali pene na ye (Talá paragrafe 5)

5. Makambo nini ekoki kosala ete mokonzi ya libota amitungisa? (Talá elilingi ya ezipeli.)

5 Mokristo oyo azali mokonzi ya libota azwaka na lisɛki te mokumba na ye ya kokokisa bamposa ya mosuni ya bato ya libota na ye. (1 Tim. 5:8) Soki ozali mokonzi ya libota, mbala mosusu na eleko oyo ya maladi mabe ya coronavirus, omitungisaki mpo mbala mosusu mosala na yo ekosila. Mbala mosusu ozalaki komitungisa ete okokoka te kopesa bato ya libota na yo bilei mpe kozwa mbongo mpo na kofuta ndako. Lisusu, mbala mosusu ozalaki kobanga ete soki mosala na yo esili, okokoka te kozwa mosala mosusu. To lokola ndeko Nestor ná mwasi na ye María, oyo tolobelaki liboso, mbala mosusu ozalaki kokanisa ete ekozala mpasi kobika kaka na mwa mbongo moke. Satana azali kolonga kotinda bato mingi bátika kosalela Yehova mpo bazalaki kobanga ndenge wana.

6. Satana alukaka kondimisa biso nini?

6 Satana alukaka kondimisa biso ete Yehova atyelaka mokomoko na biso likebi te, mpe ete akosalisa biso te tókokisa bamposa ya bato ya libota na biso. Yango ekoki kotinda biso tókanisa ete tokoki kosala nyonso mpo tóbatela mosala na biso. Mbala mosusu tokoki mpe kosala likambo moko oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná Nzambe.

7. Ndenge nini Yesu akitisi biso motema?

7 Yesu, oyo ayebaki Tata na ye malamu koleka moto mosusu nyonso, akitisi biso motema na ndenge alobaki ete Nzambe na biso “ayebi makambo oyo [tozali] na bosɛnga na yango liboso kutu [tósɛnga] ye.” (Mat. 6:8) Lisusu, Yesu ayebi ete Yehova azalaka pene na biso mpo na kokokisa bamposa na biso. Lokola tozali bakristo, tozali basangani ya libota ya Nzambe. Tosengeli komindimisa ete lokola azali Mokonzi ya libota, Yehova atosaka etinda oyo ezali na 1 Timote 5:8, oyo ye moko atindaki bákoma yango.

Yehova akosala ete tózala na oyo tosengeli na yango. Akoki kosalela bandeko mpo básalisa biso (Talá paragrafe 8) d

8. (a) Nini ekosalisa biso tóbanga te ete tokozala na likoki te ya kokokisa bamposa ya libota na biso? (Matai 6:31-33) (b) Ndenge elilingi emonisi yango, ndenge nini tokoki komekola babalani oyo bayei kotikela ndeko mwasi moko ná mwana na ye biloko ya kolya?

8 Ntango tondimaka ete Yehova alingaka biso mpe bato ya libota na biso, tomindimisaka ete tokozanga te biloko oyo tosengeli na yango. (Tángá Matai 6:31-33.) Lokola Yehova azali bolingo mpe mokabi, yango wana alingaka kokokisa bamposa na biso! Ntango akelaki mabele, asalaki kaka te biloko oyo tosengeli na yango mpo na kobika. Na bolingo na ye, atondisaki mabele na biloko oyo tokosepela na yango. (Eba. 2:9) Ata soki na bantango mosusu, tozalaka kaka na mwa biloko oyo tosengeli na yango, tobosanaka te ete Yehova nde apesaka biso biloko yango. (Mat. 6:11) Tosengeli ntango nyonso kobosana te ete biloko oyo Yehova akopesa biso eleki na motuya biloko nyonso oyo tozali komipimela sikoyo. Na mikolo ezali koya, akopesa biso bomoi ya seko. Yango nde makambo ndeko Nestor ná mwasi na ye María bakangaki ntina na yango.​—Yis. 65:21, 22.

9. Ndakisa ya ndeko Nestor ná mwasi na ye María eteyi yo nini?

9 Ndeko Nestor ná mwasi na ye María bazalaki na ndako moko kitoko mpe mosala ya malamu na ekólo Colombie. Balobaki boye: “Tozwaki makanisi ya kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ mpe kosala mingi na mosala ya Yehova, kasi tozalaki kobanga ete tokozala mpenza na esengo te soki esɛngi kobika kaka na mwa mbongo moke.” Nini esalisaki bango bálongola kobanga oyo bazalaki na yango? Bakanisaki makambo mingi oyo Yehova asalaki na bolingo nyonso mpo na kokokisa bamposa na bango. Bamindimisaki ete Yehova akokokisa ntango nyonso bamposa na bango, yango wana batikaki mosala oyo ezalaki kopesa bango mbongo mingi. Batɛkaki ndako na bango mpe bakendaki kosakola na mboka oyo mposa ya basakoli ezalaki mingi. Bayokaka ndenge nini mpo na ekateli oyo bazwaki? Ndeko Nestor alobi boye: “Tomonaki ete Matai 6:33 elobaka solo. Tozangaka eloko moko te ya kobikela. Longola yango, tozali na bomoi ya esengo lelo oyo.”

KOBANGA BATO

10. Mpo na nini tosengeli kokamwa te komona ndenge bato bakómi kobangana?

10 Banda Adama ná Eva batombokelaki Yehova, bato bazali komoniselana mpasi. (Mos. 8:9) Na ndakisa, bato bazali kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe, bato mabe bazali kosala mobulu, bana-kelasi bazali kotumola baninga na bango mpe kobangisa bango, mpe bato mosusu bazali konyokola bandeko na bango ya libota na ndenge ya nsɔmɔ. Yango ezali kokamwisa te komona ndenge bato bakómi kobangana! Ndenge nini Satana alukaka kosalela kobanga bato mpo na kolonga biso?

11-12. Ndenge nini Satana asalelaka botɛmɛli ya guvɛrnema mpo na kobangisa biso?

11 Satana asalelaka kobanga bato mpo na koluka kotinda biso na makasi tóbuka mitinda ya Nzambe mpe tótika kosakola. Satana atindaka baguvɛrnema epekisa mosala na biso mpe enyokola biso. (Luka 21:12; Em. 2:10) Bibongiseli mingi ya bato oyo Satana asalelaka epanzaka bansango ya lokuta mpe ekoselaka Batatoli ya Yehova makambo. Mbala mosusu bato oyo bandimaka lokuta yango batyolaka biso, to babundisaka biso. (Mat. 10:36) Tokamwaka ndenge Satana abundisaka biso? Soki moke te. Asilaki kosala bongo na siɛklɛ ya liboso.​—Mis. 5:27, 28, 40.

Ata soki bandeko ya libota batɛmɛli biso, tokoki komindimisa ete Yehova alingaka biso (Talá paragrafe 12-14) e

12 Satana asalelaka kaka te botɛmɛli ya guvɛrnema mpo na kobangisa biso. Bato mosusu babangaka makambo oyo bato ya libota na bango bakokanisa ntango bakokóma Batatoli ya Yehova. Na bantango mosusu, likambo yango ebangisaka bango makasi koleka kutu soki babɛti bango na nzoto. Balingaka bandeko na bango ya libota mingi mpe balingaka ete bango mpe báyekola koyeba Yehova mpe kolinga ye. Bayokaka mpasi ntango bandeko ya libota bazali koloba mabe mpo na Nzambe ya solo mpe basaleli na ye. Kasi, na bantango mosusu, bandeko ya libota oyo bazalaki kotɛmɛla solo bakómaki basaleli ya Yehova. Kasi, ekozala boni soki bandeko ya libota bakati boyokani nyonso elongo na biso mpo na kondima na biso ya sika? Tokosala nini?

13. Ndenge nini kokanisa ndenge Yehova alingaka biso esalisaka biso tóbanga te ntango bandeko ya libota basundoli biso? (Nzembo 27:10)

13 Tokoki kobɔndisama na maloba kitoko oyo ezali na Nzembo 27:10. (Tángá.) Ntango tokanisaka ndenge Yehova alingaka biso, tobangaka te makambo oyo ekokómela biso. Mpe tomindimisaka ete akopesa biso mbano soki toyiki mpiko. Yehova akokokisa bamposa na biso ya mosuni, ya mayoki mpe ya elimo koleka moto mosusu nyonso! Yango nde Biniam, oyo tolobelaki liboso, amonaki.

14. Ndakisa ya Biniam eteyi yo nini?

14 Biniam akómaki Motatoli ya Yehova atako ayebaki ete akokutana na minyoko ya makasi mpenza. Tótala ndenge Biniam ayebaki ete Yehova alingaka ye esalisaki ye abanga bato te. Alobi boye: “Minyoko ezalaki makasi koleka ndenge nazalaki kokanisa. Kasi nabangaki makasi botɛmɛli ya bandeko ya libota na ngai koleka minyoko ya guvɛrnema. Nazalaki kobanga ete ekateli oyo nazwaki ya kokóma Motatoli ya Yehova ekotungisa tata na ngai oyo azalaki mondimi te, mpe ete bandeko ya libota bakomemya ngai lisusu te.” Atako bongo, Biniam amindimisaki ete Yehova akokisaka ntango nyonso bamposa ya bato oyo balingaka ye. Biniam alobi boye: “Nazalaki kokanisa ndenge Yehova asalisaki bato mosusu báyika mpiko na mikakatano ya mbongo, kokanisela bango mabe mpe kobɛta bango na nzoto. Nayebaki ete soki nakangami na Yehova, akopambola ngai. Ntango bakangaki ngai mbala mingi na bolɔkɔ mpe banyokolaki ngai makasi, kaka na ebandeli namonaki ndenge Yehova asalisaka biso soki totikali sembo epai na ye.” Yehova akómaki Tata ya solosolo mpo na Biniam, mpe basaleli ya Yehova bamonisi ete bazali bato ya libota ya solosolo ya Biniam.

KOBANGA LIWA

15. Mpo na nini ezali mabe te kobanga liwa?

15 Biblia elobi ete liwa ezali monguna. (1 Ko. 15:25, 26) Tomitungisaka mingi ntango makanisi ya liwa eyeli biso, mingimingi ntango biso moko tozali kobɛla makasi to bato oyo tolingaka bazali kobɛla makasi. Mpo na nini tobangaka liwa? Mpo Yehova akelaki biso na mposa ya kozala na bomoi libela na libela. (Mos. 3:11) Kasi, na bantango mosusu, ezalaka mabe te kobanga liwa mpo esalisaka biso tóbatela bomoi na biso. Na ndakisa, ekoki kolendisa biso tózwa bikateli ya malamu na likambo ya kopona bilei, kosala mbala na mbala ngalasisi, koluka lisalisi ya monganga mpe bankisi soki esengeli mpe koboya kotya bomoi na biso na likama mpambampamba.

16. Ndenge nini Satana alukaka kosalela mposa oyo tobotamá na yango ya kobanga liwa?

16 Satana ayebi ete tozwaka bomoi na biso na motuya. Kasi, alingi ete tópesa nyonso oyo tozali na yango, ata mpe boyokani oyo tozali na yango ná Yehova kaka mpo na kobatela bomoi na biso. (Yobo 2:4, 5) Satana azali moto mabe mpenza! Kasi, lokola azali “moto oyo akoki kopesa liwa,” Satana alukaka kosalela mposa wana ya kobanga liwa mpo tótika kosalela Yehova. (Ebr. 2:14, 15) Na bantango mosusu, basaleli ya Satana balukaka koboma basaleli ya Yehova soki bawangani te kondima na bango. Mpe na bantango mosusu, Satana akoki komona ete tosengeli na lisalisi ya monganga nokinoki mpe kosalela yango mpo ameka kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe. Minganga to bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki kotya biso mpanzi likoló mpo tóndima bázongisa biso makila, likambo oyo ekobuka mobeko ya Nzambe. To mbala mosusu moto moko akoki komeka kondimisa biso tóndima lisalisi ya monganga oyo ezali kobuka mitinda ya Biblia.

17. Na boyokani na Baroma 8:37-39, mpo na nini ezali na ntina te tóbanga liwa?

17 Atako tolingaka kokufa te, toyebi ete Yehova akokoba kolinga biso ata soki esɛngi tókufa. (Tángá Baroma 8:37-39.) Ntango baninga ya Yehova bakufaka, akobaka kobatela bango na makanisi na ye, lokola nde bazali kaka na bomoi. (Luka 20:37, 38) Azalaka mpenza na mposa makasi ya kozongisa bango na bomoi. (Yobo 14:15) Yehova asili kofuta eloko moko ya motuya mingi mpo ‘tókoka kozwa bomoi ya seko.’ (Yoa. 3:16) Toyebi ndenge alingaka biso mingi mpe atyelaka biso likebi. Na yango, na esika ya kosundola Yehova ntango tozali kobɛla to tolingi tókufa, tosengeli kotyela ye motema ete akobɔndisa biso mpe akopesa biso bwanya mpe makasi. Yango nde Valérie ná mobali na ye basalaki mpenza.​—Nz. 41:3.

18. Ndakisa ya Valérie eteyi yo nini?

18 Ntango Valérie azalaki na mbula 35, bazwaki ye na maladi ya kanser ya lolenge mosusu mpe ya mabe mpenza. Tótala ndenge bolingo esalisaki ye abanga liwa te. Alobi boye: “Ntango bayebisaki ngai ete nazalaki na kanser, etungisaki ngai ná mobali na ngai mingi mpenza. Esɛngaki básala ngai lipaso ya monene mpenza mpo nazala na bomoi. Nakutanaki na minganga mingi oyo basalaka lipaso, kasi bango nyonso baboyaki kosala ngai lipaso kozanga kozongisa makila. Etungisaki ngai mingi mpenza, kasi na kotalela mobeko ya Nzambe, nakokaki ata moke te kondima bázongisa ngai makila! Na bomoi na ngai, Yehova amonisaki ete alingaka ngai mingi mpenza. Lelo oyo, nazali na libaku ya komonisa ete nalingaka ye. Ntango nyonso nazalaki kozwa bansango ya mabe, yango ezalaki kotinda ngai nazwa lisusu ekateli ya kokumisa Yehova mpe ya kotika te ete Satana alonga ngai. Nsukansuka basalaki ngai lipaso kozanga bázongisa ngai makila. Atako bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na ngai ezali kaka malamu te, Yehova azali kokoba kopesa biso oyo tosengeli na yango. Na ndakisa, na makita ya lisangá, na pɔsɔ oyo liboso bázwa ngai na maladi ya kansɛr, toyekolaki lisolo oyo elobaki: ‘Tózala na mpiko ntango tokutani na mikakatano.’ c Lisolo yango ebɔndisaki biso mingi mpenza. Tozalaki kotánga yango mbala na mbala. Masolo ya ndenge wana mpe mimeseno malamu ya elimo epesaki biso kimya na motema mpe esalisaki ngai ná mobali na ngai tózala na bokatikati mpe tózwa bikateli ya malamu.”

NDENGE YA KOLONGOLA KOBANGA

19. Nini ekosalema mosika te?

19 Na lisalisi ya Yehova, bakristo na mabele mobimba bazali kolonga mikakatano mpe kotɛmɛla Zabolo. (1 Pe. 5:8, 9) Yo mpe okoki kotɛmɛla ye. Mosika te, Yehova akotinda Yesu ná bato oyo bakoyangela elongo na ye ‘bábukabuka misala ya Zabolo.’ (1 Yoa. 3:8) Nsima na yango, basaleli ya Nzambe awa na mabele bakobanga te ‘eloko nyonso oyo ezali kobangisa, mpo ekobɛlɛma na bango te.’ (Yis. 54:14; Mika 4:4) Atako bongo, lokola ntango yango ekómi naino te, tosengeli kosala makasi mpo tólongola kobanga oyo tozalaka na yango.

20. Nini ekosalisa biso tólongola kobanga oyo tozalaka na yango?

20 Tosengeli kokoba kotya motema ete Yehova alingaka basaleli na ye mpe abatelaka bango. Mpo na yango, tosengeli komanyola mpe kolobela ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye ya ntango ya kala. Mpe tosengeli kobosana te ndenge asalisaka biso tólonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango. Na lisalisi ya Yehova, tokoki kolongola kobanga oyo tozalaka na yango!​—Nz. 34:4.

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

a Ezalaka ntango nyonso mabe te kobanga, mpo yango esalisaka biso tóbatela bomoi na biso na likama. Kasi na bantango mosusu ezalaka mabe kobanga, mpo ekoki kotinda biso tósala mabe. Na ndenge nini? Satana akoki kosalela yango mpo na kobangisa biso. Emonani ete tosengeli kosala makasi mpo na koyeba mitindo ndenge na ndenge ya kobanga. Nini ekosalisa biso? Ndenge lisolo oyo ekomonisa yango, ntango tondimisami ete Yehova azali pene na biso mpe ete alingaka biso, tokoki kolongola kobanga ya mitindo nyonso.

b Topesi bango bankombo mosusu.

d ELILINGI: Ndeko mwasi moko ná mobali na ye bamemeli ndeko mwasi mosusu ná libota na ye bilei.

e ELILINGI: Baboti ya elenge mobali oyo bazali kotɛmɛla losambo na ye, kasi azali na elikya ete Nzambe akosunga ye.