Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 43

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

Ndenge ya kosilisa bantembe

Ndenge ya kosilisa bantembe

“Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.”1 TES. 5:21.

NA MOKUSE

Ndenge ya kosilisa bantembe oyo ekoki kopekisa biso tókoba kosalela Yehova.

1-2. (a) Bantembe nini basaleli mosusu ya Yehova bakoki kozala na yango? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

 BATO ya mbula nyonso bakoki kozala na bantembe. a Na ndakisa, kanisá ete elenge moko Motatoli azali komituna soki Yehova atyelaka ye mpenza likebi. Mbala mosusu azali koyeba te soki asengeli kozwa batisimo. To, kanisá ndeko mobali moko ya bambula 50 oyo aponaki koluka liboso Bokonzi na bolenge na ye na esika aluka mosala oyo ekopesa ye mbongo mingi. Lokola mbula epusani mpe azali na bozwi te, akoki kobanda komituna soki ekateli oyo azwaki na bolenge ezalaki ya malamu. Kanisá mpe ndeko mwasi moko ya mobange oyo azali lisusu na makasi te mpe makoki mingi te. Akoki kolɛmba nzoto mpo azali lisusu kosalela Yehova te ndenge ezalaki liboso. Yo mpe osilá komituna mituna lokola oyo: ‘Yehova amonaka ngai mpenza? Nasengelaki mpenza komipimela makambo mosusu mpo na kosalela Yehova? Nazali kaka na ntina mpo na Yehova?’

2 Soki otiki mituna yango kaka boye kozanga biyano, ekoki kotinda yo otika kosalela Yehova. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo kotya likebi na mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso soki tozali na ntembe (1) ete Yehova atyelaka biso likebi, (2) ete bikateli oyo tozwá ya kosalela Yehova ezalaki malamu, mpe (3) ete tozali kaka na ntina mpo na Yehova.

NDENGE YA KOSILISA BANTEMBE NA YO

3. Tokoki kosala nini mpo na kosilisa bantembe na biso?

3 Likambo moko oyo tokoki kosala mpo na kosilisa bantembe na biso ezali koyekola Liloba ya Nzambe mpo na kozwa biyano na mituna na biso. Soki tosali yango, tokozwa makasi, tokokola na elimo, mpe yango ekosalisa biso ‘tótɛlɛma ngwi na kondima.’—1 Ko. 16:13.

4. Ndenge nini tokoki ‘koluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo’? (1 Batesaloniki 5:21)

4 Tángá 1 Batesaloniki 5:21. Biblia esɛngi biso ‘tóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.’ Ndenge nini tokoki kosala yango? Tokoyeba soki makambo oyo tondimaka ezali solo ntango tokokanisi yango na makambo oyo Biblia elobi. Na ndakisa, tótalela likambo ya elenge oyo azali komituna soki azali na motuya na miso ya Nzambe. Asengeli kondima likanisi yango kaka boye? Te, asengeli ‘koluka koyeba soki likambo yango ezali solo’; asengeli koyekola Biblia mpo na komona soki makanisi ya Yehova ezali nini.

5. Ndenge nini tokoki “koyoka” biyano ya Yehova na mituna na biso?

5 Ntango totángaka Liloba ya Nzambe, “toyokaka” Yehova azali koloba na biso. Kasi, mpo na koyeba eyano na ye na motuna oyo ezali kotungisa biso, tosengeli kosala milende mingi. Tosengeli mpenza koyekola na Biblia likambo ya sikisiki oyo tozali na yango. Tokoki kosala bolukiluki na likambo yango na kati ya ebele ya bisaleli oyo ebongiseli ya Yehova epesi biso. (Mas. 2:​3-6) Na bolukiluki yango, tokoki kobondela Yehova atambwisa biso mpe asalisa biso tómona likanisi na ye na motuna na biso. Na nsima, tokoki koluka mitinda ya Biblia mpe makambo ya sikisiki oyo eyokani na likambo na biso. Ekozala mpe malamu soki totali masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo bakutanaki na likambo lokola oyo ya biso.

6. Ndenge nini makita ekoki kosalisa biso tósilisa bantembe na biso?

6 “Toyokaka” mpe Yehova ntango tozali na makita. Soki tozali koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, tokoki koyoka likambo moko na diskur to na eyano ya ndeko moko oyo ezali mpenza likambo oyo esengeli mpo na kosalisa biso tósilisa bantembe na biso. (Mas. 27:17) Tótala sikoyo ndenge ya kosilisa bantembe ya sikisiki oyo tokoki kozala na yango.

NTANGO OZALI KOMITUNA SOKI YEHOVA ATYELAKA YO MPENZA LIKEBI

7. Motuna nini basusu bakoki komituna?

7 Osilá komituna soki Yehova amonaka yo mpenza? Soki omonaka ete ozali na ntina te, likanisi ya kokóma moninga ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba ekoki kolekela yo, to okoki komona ete ekoki kosalema te. Mbala mosusu Mokonzi Davidi mpe azalaki na likanisi ya ndenge wana. Akamwaki ndenge Yehova atyelaka bato likebi mpe atunaki: “Ee Yehova, moto azali nani mpo okanisa ye, mwana ya moto, mowei mpamba mpo otyela ye likebi?” (Nz. 144:3) Epai wapi okoki kozwa eyano na motuna yango?

8. Na kotalela 1 Samwele 16:​6, 7, 10-12, Yehova atalaka nini epai ya bato?

8 Biblia emonisaka biso ete Yehova atyaka likebi epai ya baoyo bato mosusu bamonaka ete bazali na ntina te. Na ndakisa, mokolo moko Yehova atindaki Samwele na ndako ya Yese mpo na kotya moko ya bana na ye mafuta mpo akóma mokonzi ya Yisraele. Yese abengaki bana nsambo kati na bana na ye mwambe mpo bákutana na Samwele kasi abengaki Davidi te, mpo azalaki leki na bango nyonso. b Nzokande Davidi nde moto oyo Yehova aponaki. (Tángá 1 Samwele 16:​6, 7, 10-12.) Yehova amonaki ndenge oyo Davidi azalaki na kati ya motema: elenge mobali oyo azalaki kosepela na makambo ya Nzambe.

9. Mpo na nini okoki kondima ete Yehova atyelaka yo likebi? (Talá mpe elilingi.)

9 Kanisá makambo oyo Yehova asili kosala mpo na kolakisa ete amonaka yo. Asepelaka kopesa yo toli oyo eyokani na bamposa na yo. (Nz. 32:8) Mpo asala yango, asengeli koyeba yo malamu, boye te? (Nz. 139:1) Ntango osaleli toli ya Yehova mpe omoni ndenge ezali kosalisa yo, okomindimisa ete Yehova atyelaka yo likebi. (1 Nt. 28:9; Mis. 17:​26, 27) Yehova amonaka milende oyo osalaka. Amonaka bizaleli malamu ya motema na yo mpe alingi kokóma moninga na yo. (Yir. 17:10) Alingi ete yo mpe ondima kokóma moninga na ye.—1 Yoa. 4:19.

“Soki oluki [Yehova], akosala ete omona ye.”—1 Nt. 28:9 (Talá paragrafe 9) c


NTANGO OZALI KOMITUNA SOKI OZWAKI BIKATELI YA MALAMU

10. Ntango tozali kokanisa bikateli oyo tozwá, mituna nini ekoki koyela biso?

10 Ntango mbula epusani, bato mosusu bakoki kokanisa bolenge na bango mpe komituna soki bazwá bikateli ya malamu. Mbala mosusu baboyaki mosala oyo ekokaki kopesa bango mbongo mingi to mombongo moko boye mpo bámipesa mobimba na mosala ya Yehova. Mbala mosusu eleki sikoyo bambula mingi. Ekoki kozala ete bazali komona baninga oyo balukaki mosala ya mbongo mpe sikoyo emonani ete bazali na mikakatano ya mbongo te. Na yango, bakoki komituna: ‘Nasengelaki mpenza komipimela makambo mpo na kosalela Yehova? To makambo oyo namipimelaki ezangisi ngai mabaku ya kozwa mbongo?’

11. Likambo nini ezalaki kotungisa mokomi ya Nzembo 73?

11 Soki mituna ya ndenge wana ezali kotungisa yo, talá ndenge mokomi ya Nzembo 73 amiyokaki. Amonaki lokola ete basusu bazali na bomoi ya malamu, ya bozwi, oyo ezangá mitungisi. (Nz. 73:​3-5, 12) Wana azalaki kotala bango mpe ndenge ezalaki komonana lokola bazali kolonga na bomoi, amonaki ete milende oyo asalaki mpo na kosalela Yehova ezalaki na ntina te. ‘Atungisamaki mokolo mobimba’ mpo azalaki na makanisi oyo elɛmbisaka nzoto. (Nz. 73:​13, 14) Asalaki nini mpo na mayoki yango?

12. Na kotalela Nzembo 73:​16-18, mokomi ya nzembo asalaki nini mpo azongela makanisi ya malamu?

12 Tángá Nzembo 73:​16-18. Mokomi ya nzembo akendaki na esika ya kimya, na tempelo ya Yehova. Kuna, makanisi na ye ezongaki na molɔngɔ. Asosolaki ete ata soki bomoi ya basusu ezalaki komonana lokola ezangi mikakatano, bazalaki na avenire te. Lokola atalelaki makambo ndenge wana, azwaki kimya ya makanisi, mpe ayebaki ete kotya makambo ya elimo na esika ya liboso nde eleki malamu. Na yango, akómaki lisusu na ekateli makasi ya kokoba kosalela Yehova.—Nz. 73:​23-28.

13. Ndenge nini tokoki kozwa kimya ya makanisi soki tozali komituna soki ekateli oyo tozwá ya kosalela Nzambe ezali malamu? (Talá mpe elilingi.)

13 Yo mpe okoki kozwa kimya ya makanisi ndenge wana na lisalisi ya Liloba ya Nzambe. Ndenge nini? Kanisá bomɛngo nyonso ya elimo oyo ozali na yango, ata mpe boyokani na yo na Yehova, mpe kokanisá yango na nsuka ya baoyo mbano na bango ezali kaka na mokili oyo. Batalelaka kaka makambo oyo bazali kosala na bomoi ya lelo mpo bazali ata na elikya moko te mpo na mikolo ezali koya. Kasi, Yehova alaki yo mapamboli oyo eleki mosika eloko nyonso oyo okoki kokanisa. (Nz. 145:16) Kanisá mpe likambo oyo: Tokoki mpenza koyeba soki bomoi na biso elingaki kozala ndenge nini lelo soki tozwaki ekateli ya ndenge mosusu? Mpo na koloba solo, baoyo bazwaka bikateli oyo euti na bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango bazangaka ata eloko moko te oyo ezali mpenza malamu.

Tyá miso na mapamboli oyo Yehova alaki (Talá paragrafe 13) d


NTANGO OZALI KOMITUNA SOKI OZALI NA NTINA MPO NA YEHOVA

14. Mikakatano nini basusu bazalaka na yango, mpe motuna nini ekoki kotungisa bango?

14 Basaleli mosusu ya Yehova bazali na mikakatano mpo bazali kokóma mibange, bazali kobunda na maladi, to bazali bibɔsɔnɔ. Yango ekoki mbala mosusu kotinda bango bámituna soki bazali na motuya na miso ya Yehova. Bakoki komituna: ‘Nazali kaka na ntina mpo na Yehova?’

15. Mokomi ya Nzembo 71 andimaki likambo nini?

15 Mokomi ya Nzembo 71 amitungisaki mpo na likambo ya ndenge wana. Abondelaki boye: “Kosundola ngai mpe te ntango makasi na ngai ezali kosila.” (Nz. 71:​9, 18) Atako bongo, mokomi ya nzembo yango akobaki komindimisa ete soki azali kosalela Nzambe na ye na bosembo, Yehova akokamba ye mpe akosunga ye. Ndenge mokomi ya nzembo amonaki yango, Yehova asepelaka na baoyo basalaka oyo bakoki mpo na kosalela Ye atako bazali na makoki mingi te.—Nz. 37:​23-25.

16. Nini emonisi ete mibange bazali na ntina mpo na Yehova? (Nzembo 92:​12-15)

16 Mibange, bómitalela ndenge Yehova atalelaka bino. Akoki kosalisa bino bózala malamu na elimo ata soki bozali na mikakatano ya nzoto. (Tángá Nzembo 92:​12-15.) Na esika bótya makanisi na makambo oyo bokoki lisusu kosala te, bótalaka nde oyo bokoki kosala. Na ndakisa, bokoki kolendisa basusu na bosembo na bino mpe na likebi oyo bozali kotyela bango. Bokoki kobɛta masolo oyo emonisi ndenge Yehova asalisi bino na boumeli ya bambula mpe koyebisa basusu ndenge bozali na elikya makasi ete bilaka na ye ekokokisama. Bóbosana mpe te ete bokoki kosalisa mingi soki bozali kobondela na motema mobimba mpo na basusu. (1 Pe. 3:12) Ata soki makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini, biso nyonso tozali na mwa eloko ya kopesa Yehova mpe basusu.

17. Mpo na nini tosengeli kotɛmɛla mposa ya komikokanisa na basusu?

17 Soki ozali komitungisa mpo okoki lisusu kosala mingi te na mosala ya Yehova, yebá ete azwaka na motuya nyonso oyo okoki kosala. Mbala mosusu oyokaka mposa ya kokokanisa oyo osalaka ná oyo basusu bazali kosala. Otɛmɛla mposa yango! Mpo na nini? Mpo Yehova akokanisaka biso na basusu te. (Gal. 6:4) Na ndakisa, Maria apesaki Yesu likabo ya mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi mpenza. (Yoa. 12:​3-5) Kasi, mwasi mobola oyo mobali akufá atyaki likabo na tempelo kaka ya mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza. (Luka 21:​1-4) Atako bongo, Yesu amonaki ete makabo yango mibale emonisaki kondima ya mwasi mokomoko. Tata na ye Yehova azwaka mpenza na motuya eloko nyonso oyo ozali kosala mpo na komonisa ete okangami na ye mpe olingaka ye, ata soki yo moko omoni yango moke.

18. Nini ekosalisa biso tósilisa bantembe na biso? (Talá mpe etanda “ Liloba ya Yehova ekoki kosalisa yo osilisa bantembe.”)

18 Biso nyonso tozalaka na bantembe na bantango mosusu. Kasi, ndenge tomoni yango, Liloba ya Nzambe, Biblia, oyo ebongi kotyelama motema mpo elobaka solo, ekoki kosalisa biso tósilisa bantembe yango. Na yango, zalá na ekateli ya kosilisa bantembe na yo, mpe yekolá kozala na elikya. Yehova atyelaka yo mpenza likebi. Asepelaka na milende oyo ozali kosala mpe alaki ete akopesa yo mbano. Tyá motema ete Yehova azwaka basaleli na ye nyonso ya sembo na motuya, alingaka bango, mpe atyelaka bango likebi.

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

a NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo, tozali kolobela bantembe oyo etindaka biso tómituna soki tozali na ntina mpo na Yehova to soki tozwaki bikateli ya malamu. Yango ezali te bantembe oyo Biblia elobi ete ekoki komonisa ete moto azangi kondima epai ya Yehova mpe na bilaka na ye.

b Atako Biblia epesi mpenza te mbula oyo Davidi azalaki na yango ntango Yehova aponaki ye, ekoki kozala ete akokisaki naino mbula 20 te.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/2011, lok. 29, par. 2.

c NDIMBOLA YA BILILINGI: Elenge Motatoli moko azali koluka likanisi ya Yehova na Biblia.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kosala mosala ya mosuni mpo na kosunga libota na ye, kasi atye makanisi na ye na Paradiso oyo ezali koya.