Tosá babateli ya mpate oyo Yehova atye
“Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino.”—EBR. 13:17.
1, 2. Mpo na nini ndenge oyo Yehova amikokanisi na mobateli ya mpate ezali na ndimbola monene?
YEHOVA amikokanisi na mobateli ya mpate. (Ezk. 34:11-14) Yango ezali na ndimbola monene mpamba te esalisi biso tóyeba ndenge Yehova azali. Mobateli ya mpate ya malamu asalaka nyonso mpo na bolamu ya bampate oyo azali kokɛngɛla. Amemaka bampate na bisika oyo etondi na matiti mpe na mai (Nz. 23:1, 2); abatelaka yango butu moi (Luka 2:8); atikaka te nyama mabe epusana pembeni ya bampate (1 Sa. 17:34, 35); amemaka mwana ya mpate oyo euti kobotama (Yis. 40:11); alukaka bampate oyo ebungi mpe asalisaka oyo ezoki.—Ezk. 34:16.
2 Lokola basaleli mingi ya Yehova na ntango ya kala bazalaki kobɔkɔla bibwɛlɛ mpe kosala bilanga, bakangaki mbala moko ntina oyo Yehova Nzambe amikokanisaki na mobateli malamu ya bampate. Bayebaki ete mpo bampate ezala nzoto kolɔngɔnɔ, ezalaki kosɛnga kobatela yango malamu mpe kotyela yango likebi. Ndenge moko mpe, bato bazalaka na mposa ete Yehova abatela bango mpe atyelaka bango likebi. (Mrk. 6:34) Soki bato bazangi libateli ya Yehova mpe litambwisi na ye, bamonaka mpasi. Bazalaka makasi te mpe bayebaka te kokesenisa mabe ná malamu, lokola “bampate oyo ezangi mobateli.” (1 Bak. 22:17) Nzokande, na bolingo nyonso, Yehova akokisaka bamposa ya bato na ye.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Ata biso lelo oyo mpe, tomonaka ntina oyo Yehova amikokanisi na mobateli ya mpate. Yehova akokisaka bamposa ya basaleli na ye, oyo bazali lokola bampate. Tótala ndenge azali kotambwisa bampate na ye mpe kokokisa bamposa na bango lelo oyo. Tokolobela mpe oyo bampate basengeli kosala mpo na likebi oyo Yehova azali kotyela bango.
MOBATELI YA MPATE OYO ALEKI MALAMU ATYE BABATELI YA MPATE BASUNGI
4. Yesu asalaki nini mpo na bampate ya Yehova?
4 Yehova atyá Yesu Mokonzi ya lisangá ya bokristo. (Ef. 1:22, 23) Yesu, oyo azali “mobateli ya mpate oyo aleki malamu,” amonisaka bizaleli ya Tata na ye mpe asalaka makambo lokola ye. Yesu ‘apesaki kutu molimo na ye mpo na bampate.’ (Yoa. 10:11, 15) Mbeka ya lisiko ya Kristo ezali mpenza likabo kitoko mpo na bato! (Mat. 20:28) Mokano ya Yehova ezali ete “moto nyonso oyo azali kondimela [Yesu] abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”—Yoa. 3:16.
5, 6. (a) Yesu atye banani mpo na kobatela bampate na ye, mpe ezaleli nini bampate basengeli komonisa? (b) Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kotosaka bankulutu?
5 Ndenge nini bampate bamonisaka ete bandimi Yesu Kristo, Mobateli ya mpate oyo aleki malamu? Yesu alobaki: “Bampate na ngai eyokaka mongongo na ngai, mpe nayebi yango, mpe elandaka ngai.” (Yoa. 10:27) Koyoka mongongo ya Mobateli ya mpate oyo aleki malamu elimboli kolanda ntango nyonso litambwisi na ye. Yango esangisi kotosa bato oyo atye mpo básalisa ye na kobatela bampate. Na siɛklɛ ya liboso, Yesu amonisaki ete bantoma mpe bayekoli na ye bakokoba mosala oyo abandaki. Apesaki bango mokumba ya ‘koteya’ mpe ‘koleisa bampate na ye ya mike.’ (Mat. 28:20; tángá Yoane 21:15-17.) Wana nsango malamu ezalaki kopalangana mpe motángo ya bayekoli ezalaki kobakisama, Yesu azwaki bibongiseli mpo bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bábatelaka bampate na ye na masangá.—Ef. 4:11, 12.
6 Na nsima, ntango ntoma Paulo asololaki na bakɛngɛli ya lisangá ya Efese, alobaki ete elimo santu etyaki bango bakɛngɛli mpo na “kobatela lisangá ya Nzambe.” (Mis. 20:28) Lelo oyo mpe, elimo santu etyaka bakɛngɛli mpamba te mpo moto akóma nkulutu na lisangá, akokisaka masɛngami ya Biblia, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Na yango, soki tozali kotosa bakɛngɛli ya lisangá, tokomonisa ete tozali na limemya epai ya Yehova mpe Yesu, Babateli minene ya bampate. (Luka 10:16) Yango nde ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kotosaka bankulutu. Kasi ezali mpe na bantina mosusu oyo tosengeli kotosa bankulutu.
7. Ndenge nini bankulutu basalisaka yo obatela boyokani ya malamu na Yehova?
7 Bankulutu basalelaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe mpo na kolendisa mpe kokamba bandeko na bango bakristo. Basalaka bongo mpamba te balukaka te kokonza bandeko na bango bakristo. (2 Ko. 1:24) Balukaka nde kosalisa bango bázwaka bikateli ya malamu oyo eyokani na mitinda ya Biblia, mpe kopesa mabɔkɔ mpo makambo etambolaka na molɔngɔ mpe na kimya na kati ya lisangá. (1 Ko. 14:33, 40) Biblia elobi ete bankulutu ‘bakɛngɛlaka milimo’ mpamba te balukaka kosalisa ndeko mokomoko ya lisangá abatela boyokani ya malamu na Yehova. Yango wana, soki bamoni ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko alingi kobɛta libaku to “abɛti libaku,” basalaka nokinoki mpo na kosalisa ye. (Gal. 6:1, 2; Yuda 22) Yango mpe ezali bantina mosusu oyo mpo na yango tosengeli ‘kotosa baoyo bazali kokamba biso.’—Tángá Baebre 13:17.
8. Ndenge nini bankulutu babatelaka lisangá?
8 Ntoma Paulo, oyo azalaki mpe mobateli ya mpate na lisangá, akomelaki bakristo ya Kolose ete: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.” (Kol. 2:8) Likebisi yango elobeli ntina mosusu oyo tosengeli kotya likebi na batoli ya Biblia oyo bankulutu bapesaka biso. Babatelaka etonga na ndenge bakebisaka bandeko na bato mabe oyo bakoki koluka kobebisa kondima na bango. Ntoma Petro alobaki ete ekozala na “basakoli ya lokuta” mpe “bateyi ya lokuta” oyo bakoluka “kobenda milimo oyo epikami te.” (2 Pe. 2:1, 14) Na ntango na biso mpe bankulutu basengeli kokebisa bandeko soki esengeli. Bankulutu bazali bakristo oyo bakɔmɛli na elimo mpe bayebi makambo mingi ya bomoi. Longola yango, liboso ete bátyama bankulutu, bamonisaki ete bayebi Biblia malamu mpe ete bayebi koteya makambo oyo ekoki kosalisa bandeko. (1 Tim. 3:2; Tito 1:9) Lokola bakɔmɛli na elimo, bazali na bokatikati, mpe bazali na bwanya oyo euti na Biblia, bakambaka lisangá na ndenge ya malamu.
MOBATELI YA MPATE OYO ALEKI MALAMU AZALI KOLEISA MPE KOBATELA BAMPATE
9. Ndenge nini Yesu atambwisaka mpe aleisaka lisangá lelo oyo?
9 Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova azali kotambwisa mpe koleisa na elimo lisangá ya bandeko na mokili mobimba. Tozwaka batoli mingi ya Biblia na nzela ya mikanda ya moombo ya sembo. Longola yango, na bantango mosusu ebongiseli ya Yehova epesaka malako mbala moko epai ya bankulutu ya lisangá, na nzela ya mikanda oyo bakomelaka bango to na nzela ya bakɛngɛli-batamboli. Ezali na ndenge wana nde bampate bazwaka litambwisi ya malamu.
10. Mokumba nini bankulutu bazali na yango mpo na bampate oyo ekimi etonga?
10 Bakɛngɛli bazali na mokumba ya kobatela, Yakobo 5:14, 15.) Bandeko yango mosusu bakoki kokima lisangá mpe kotika kobima na mosala ya kosakola. Na ntango wana, nkulutu ya malamu akosala nyonso oyo akoki mpo na koluka mpate nyonso oyo abungá mpe kolendisa ye azonga na etonga, elingi koloba na lisangá. Yesu alobaki ete: “Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.”—Mat. 18:12-14.
koleisa na elimo, mpe kosunga bandeko ya lisangá, mingimingi baoyo kondima na bango elɛmbi to baoyo basali mabunga ya minene. (TángáNDENGE NINI TOSENGELI KOTALELA BOLƐMBU YA BANKULUTU?
11. Mpo na nini bandeko mosusu bazalaka na mokakatano mpo na kolanda litambwisi ya bankulutu?
11 Yehova mpe Yesu bazali Babateli ya bampate ya kokoka. Bato oyo bango bapesi mokumba ya kozala babateli ya bampate na lisangá bazali bato ya kozanga kokoka. Likambo yango ekoki kosala ete bandeko mosusu bázala na mokakatano mpo na kolanda litambwisi ya bankulutu. Bandeko yango bakoki koloba ete: ‘Bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka kaka lokola biso nyonso. Mpo na nini tosengeli koyoka toli na bango?’ Ya solo, bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi, tosengeli te kotalelaka kaka mabunga mpe bolɛmbu na bango.
12, 13. (a) Mabunga nini bato mosusu oyo Yehova apesaki mikumba na ntango ya kala basalaki? (b) Mpo na nini Yehova akomisaki na Biblia mabunga ya bato oyo apesaki mikumba?
12 Biblia elobeli polele mabunga ya bato oyo Yehova asalelaki mpo na kokamba basaleli na ye na ntango ya kala. Na ndakisa, Davidi atyamaki mafuta mpo azala mokonzi mpe mokambi ya Yisraele. Kasi azangaki komipekisa, akweaki na ekobo mpe abomisaki mobali ya mwasi yango. (2 Sa. 12:7-9) Tólobela mpe ntoma Petro. Atako azwaki mikumba minene na lisangá ya siɛklɛ ya liboso, asalaki mabunga ya minene. (Mat. 16:18, 19; Yoa. 13:38; 18:27; Gal. 2:11-14) Longola kaka Yesu, moto mosusu te nsima ya Adama ná Eva azali moto ya kokoka.
13 Mpo na nini Yehova asalaki ete bakomi ya Biblia bákoma mabunga ya bato oyo apesaki mikumba? Ntina moko ezali ete Nzambe alingaki komonisa ete akoki kosalela bato ya kozanga kokoka mpo na kokamba basaleli na ye. Kutu, yango nde asalaka. Yango wana, tosengeli te kozwa mabunga mpe bolɛmbu ya baoyo bazali kokamba biso lokola libaku ya koimaima mpo na bango to koboya bokonzi na bango. Yehova alingi ete tózala na limemya mpo na bandeko wana mpe tótosa bango.—Tángá Kobima 16:2, 8.
14, 15. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova azalaki kopesa bato na ye malako na ntango ya kala?
14 Ezali na ntina mingi tótosaka baoyo bazali kokamba biso lelo oyo. Kanisá ndenge oyo Yehova azalaki kopesa basaleli na ye na ntango ya kala malako na bantango ya mpasi. Ntango Bayisraele balongwaki na Ezipito, Nzambe azalaki kopesa bango malako na nzela ya Moize ná Arona. Mpo na kobika na bolɔzi ya zomi, Bayisraele basengelaki kotosa malako: basengelaki kolya bilei oyo esɛngamaki, koboma mpate mpe kopakola ndambo ya makila na yango na makonzí ya porte ya ndako na bango mpe na libaya ya likoló oyo esimbaka makonzí ya porte. Nzambe alobaki nde uta na likoló mpo na kopesa bango malako wana? Te, basengelaki koyoka mikóló ya ekólo oyo bazwaki malako ya sikisiki epai ya Moize. (Kob. 12:1-7, 21-23, 29) Na libaku wana, Yehova asalelaki Moize mpe mikóló ya Yisraele mpo na kopesa basaleli na ye malako na ye. Yehova asalelaka mpe bankulutu ndenge wana lelo oyo.
15 Na ntembe te, oyebi masolo mosusu mingi ya Biblia oyo emonisi ndenge Yehova asalelaki bato to baanzelu mpo na kopesa basaleli na ye malako oyo ebikisaki bomoi na bango. Na mabaku yango nyonso, Nzambe amonaki
malamu apesa moto mosusu bokonzi ya kosala na esika na ye. Bamemi-nsango yango balobaki na nkombo na ye, mpe bayebisaki basaleli na ye oyo basengeli kosala na ntango ya mikakatano. Tomoni te ete Yehova akoki mpe kosala bongo na ntango ya Armagedone? Na yango, lokola bankulutu bazwi mokumba ya koloba na esika ya Yehova to ya komonisa ebongiseli na ye lelo oyo, nkulutu asengeli kokeba ete alekisa ndelo te na ndenge ya kosalela bokonzi oyo Yehova apesi bango.‘ETONGA KAKA MOKO, MOBATELI KAKA MOKO’
16. “Liloba” oyo tosengeli koyoka ezali nini?
16 Basaleli ya Yehova bazali “etonga kaka moko” oyo ezali na “mobateli kaka moko,” Yesu Kristo. (Yoa. 10:16) Yesu alobaki ete akozala elongo na bayekoli na ye “mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Lokola azali Mokonzi na likoló, ayebi malamu makambo nyonso oyo ekosalema liboso mokili ya Satana ebomama. Mpo tókoba kozala na bomoko mpe na libateli na kati ya etonga ya Nzambe, tosengeli koyoka ‘liloba nsima na biso,’ oyo ezali koyebisa biso nzela oyo tosengeli kolanda. “Liloba” yango esangisi makambo oyo elimo santu ya Nzambe elobi na Biblia mpe makambo oyo Yehova ná Yesu bateyaka biso na nzela ya bato oyo batyami lokola babateli ya mpate basungi.—Tángá Yisaya 30:21; Emoniseli 3:22.
17, 18. (a) Likama nini etonga ya Nzambe ezali na yango, kasi tosengeli kozala na elikya nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
17 Biblia elobi ete Satana azali kotambola epai na epai “lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” (1 Pe. 5:8) Satana azali lokola nyama ya zamba oyo ezali na nzala makasi, azali kotalatala etonga mpe azali kozela ntango oyo ebongi mpo na kokanga mpate oyo ezali ekɛngɛ te to oyo ekei mosika na etonga. Wana ezali ntina monene oyo tosengeli kozala ntango nyonso na kati ya etonga mpe pene na ‘mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na biso.’ (1 Pe. 2:25) Mpo na bato oyo bakobika na bolɔzi monene, Emoniseli 7:17 elobi ete: “Mwana-Mpate [Yesu] . . . akokamba bango, mpe akomema bango na maziba ya mai ya bomoi. Mpe Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango.” Oyo nde elaka kitoko!
18 Lokola tomoni ete bankulutu bazali na mokumba monene ya kobatela bampate na kati ya lisangá, tómituna boye: Nini ekosalisa mibali wana oyo batyami bankulutu báyeba soki bazali kobatela bampate ya Yesu malamu? Tokoyanola na motuna wana na lisolo oyo elandi.