Liloba azalaki “Nzambe” to “nzambe”?
BABONGOLI ya Biblia bamitunaka motuna yango ntango balingi kobongola vɛrsɛ ya liboso ya Evanzile ya Yoane. Na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika, vɛrsɛ yango ebongolami boye: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki nzambe.” (Yoane 1:1) Ndenge oyo Babiblia mosusu ebongoli eteni ya nsuka ya vɛrsɛ yango emonisaka mpe ete Liloba azalaki “na lolenge ya Nzambe.” (Moffatt; New English Bible) Nzokande, na Babiblia mingi, eteni ya nsuka ya Yoane 1:1 ebongolami boye: “Mpe Liloba azalaki Nzambe.”—haut fleuve, Liloba lya Nzambe.
Gramɛrɛ ya monɔkɔ ya Grɛki mpe bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emonisi ete Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli vɛrsɛ yango malamu mpe ete “Liloba” azali te “Nzambe” oyo alobelami na eteni ya liboso ya vɛrsɛ yango. Atako bongo, likambo yango ebimisaka ntembe epai ya bato mosusu, mpamba te monɔkɔ ya Grɛki oyo ezalaki kolobama na ekeke ya liboso ezangaki liloba mpo na kolobela eloko to moto na bosikisiki te (article indéfini). Yango wana, libongoli moko ya Biblia na monɔkɔ mosusu oyo ezalaki kolobama na bikeke ya ebandeli ya ntango na biso ekoki kosalisa biso.
Monɔkɔ yango ezali Copte sahidique. Monɔkɔ ya Copte ezalaki kolobama na Ezipito nsima ya eleko oyo Yesu azalaki awa
na mabelé; lisusu, lolenge mosusu ya monɔkɔ yango, oyo ebengami Copte sahidique, ezalaki kokomama na mikanda. Na ntina na mabongoli ya liboso ya Biblia na monɔkɔ ya Copte, buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Lokola [libongoli ya Septante] mpe [Makomami ya Grɛki ya boklisto] ebongolamaki na monɔkɔ ya Copte na ekeke ya misato T.B., libongoli ya Copte esalemaki longwa na [bamaniskri ya Grɛki] oyo esalemaki liboso mpenza ya bamaniskri mingi oyo ezali tii lelo oyo.”Libongoli ya Biblia na monɔkɔ ya Copte sahidique ezali mpenza kobenda likebi na biso na makambo mibale. Ya liboso, ndenge touti koloba yango, ezali komonisa ndenge baklisto bazalaki kokanga ntina ya Makomami liboso ya ekeke ya minei, eleko oyo liteya ya Bosato ekɔtaki na Lingomba. Ya mibale, gramɛrɛ ya monɔkɔ ya Copte ekokani na oyo ya Lingelesi na likambo moko ya ntina mingi. Mabongoli ya libosoliboso ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ezalaki na monɔkɔ ya Syriaque, ya Latin, mpe ya Copte. Ndenge moko na Grɛki ya kala, monɔkɔ ya Syriaque mpe ya Latin, ezalaki na article indéfini te. Nzokande, monɔkɔ ya Copte ezalaki na yango. Longola yango, na buku na ye (Introduction to Sahidic Coptic), Thomas Lambdin, moto moko ya mayele na minɔkɔ ya Moyen-Orient, alobi boye: “Ndenge moko na Lingelesi, monɔkɔ ya Copte ezalaki na maloba mpo na kolobela likambo, eloko, to moto moko na bosikisiki mpe maloba mosusu mpo na kolobela likambo, eloko, to moto na bosikisiki te.”
Na yango, libongoli ya Biblia na monɔkɔ ya Copte ezali komonisa ndenge oyo bato ya ntango wana bazalaki kokanga ntina ya maloba ya Yoane 1:1. Yango elobi nini? Biblia ya Copte sahidique ezali na mwa liloba moko oyo ezali komonisa ete eteni ya nsuka ya Yoane 1:1 elobeli “nzambe.” Na yango, ntango tobongoli yango na Lingala, maloba ya vɛrsɛ yango na libongoli wana esengeli kozala boye: “Mpe Liloba azalaki nzambe.” Tomoni polele ete babongoli ya kala bayebaki ete maloba ya Yoane 1:1 emonisi te ete Yesu azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Liloba azalaki nzambe, kasi te Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.