Biblia ebatelamaki na ndenge ya kokamwa
BANDA mokili ebandá, Biblia ezali buku oyo ekabolami mingi koleka babuku mosusu nyonso. Babiblia soki miliare minei na ndambo (4,8 milliards) esili kokabolama. Kaka na 2007 mpamba, Babiblia koleka 64 600 000 ebimisamaki. Nzokande, kaka na mbula yango, buku ya masolo mosusu oyo etɛkamaki mingi koleka ebimisamaki na motángo ya milio 12, na États-Unis.
Mpo Biblia ekóma buku oyo eleki kokabolama na mokili, ebatelamaki na makama ndenge na ndenge. Na boumeli ya bambula, bazalaki kopekisa bato bázala na Biblia, bazalaki kotumba yango, mpe bazalaki konyokola mpe koboma moto nyonso oyo akobongola yango. Atako bongo, likambo oyo ekokaki mpenza kolimwisa Biblia, ezalaki te minyoko oyo bazalaki konyokola bato, kasi nde ndenge oyo ekokaki kolyama mokemoke tii ekolimwa. Na ndenge nini?
Biblia ezali na mikanda mikemike 66, mpe mikanda oyo eumeli mingi koleka ekomamaki to esangisamaki na bato ya ekólo Yisraele banda mbula koleka 3 000. Bato oyo bakomaki mpenza mikanda yango mpe baoyo basalaki bakopi ya makomi yango bazalaki kokoma nsango oyo euti epai ya Nzambe na biloko oyo ebebaka, lokola bapapirise mpe mposo ya nyama. Tii lelo, makomi ya libosoliboso emonaná naino te. Kasi, bamoná bankóto ya bakopi ya kala ya biteni ya mike mpe ya minene ya mikanda ya Biblia. Moko na bakopi yango oyo emonanaki ezali Evanzile ya Yoane; esalemaki kaka mwa bambula nsima ya mokanda oyo ntoma Yoane ye moko akomaki.
“Makomami ya Ebre [Boyokani ya Kala] oyo tozali na yango lelo ekokani mpenza na oyo ezalaki kala, ekeseni na mikanda mosusu ya kala ya Grɛki mpe ya Latin.”—Profɛsɛrɛ Julio Trebolle Barrera
Mpo na nini kobatelama ya bakopi nyonso ya mikanda ya Biblia ezali likambo ya kokamwa? Biblia oyo tozali na yango lelo ezali mpenza na makambo oyo bakomi ya libosoliboso bakomaki?
Mikanda mosusu ya kala esuká ndenge nini?
Soki totaleli ndenge mikanda oyo bato ya bikólo oyo ezalaki na ntango ya Bayisraele esuká, tokomona ete ndenge Biblia ebatelamaki ezali mpenza likambo ya kokamwa. Na ndakisa, bato ya Fenisia bazalaki pembeni ya ekólo ya Yisraele na boumeli ya mbula nkóto ya yambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bato yango oyo bazalaki kosala mibembo na mbu bapanzaki alfabɛ na bango na mikili nyonso oyo ezalaki pembeni ya mbu Mediterane. Bazwaki mpe matomba na ndenge bazalaki kotɛka bapapirise na Ezipito mpe na Grɛsi. Atako bongo, zulunalo moko (National Geographic) elobi mpo na bato ya Fenisia ete: “Makomi na bango, oyo mingimingi ezalaki na bapapirise, ebebá—yango wana lelo oyo, toyebi makambo ya bato ya Fenisia mingimingi na nzela ya makomi ya banguna na bango oyo elobeli bango na ndenge ya malamu te. Atako bato balobaka ete bato ya Fenisia bazalaki kokoma mikanda mingi, nyonso wana elimwá banda na ntango ya kala.”
Bongo mikanda oyo bato ya Ezipito bazalaki kokoma? Eyebani ete bazalaki kokoma makambo na ekomeli ya hiéroglyphe na bifelo ya tempelo mpe na bisika mosusu. Bato ya Ezipito bayebanaki mpe mingi mpo bango nde bato ya liboso ya kosalela papirise mpo na kokoma. Nzokande, mpo na makambo oyo Baezipito bakomá na bapapirise, Kenneth Kitchen, moto ya mayele na makambo ya Ezipito ya kala, alobi boye: “Emonani ete ebele mpenza (99 %) ya makomi
oyo ekomamaki na bapapirise mbula soki 3 000 liboso ya ntango ya Bagrɛki ná Baroma, ebebá nyonso.”Tokoki koloba nini mpo na makambo oyo Baroma bazalaki kokoma na bapapirise? Tótalela ndakisa oyo. Buku Masolo ya basoda ya Roma na papirise (na Lingelesi) elobi ete emonani ete bazalaki kofuta basoda ya Roma mbala misato na mbula, mpe bazalaki kokoma balapolo yango na papirise oyo bazalaki kosalela lokola bulletin de paie. Balobaka ete na boumeli ya mbula 300 kobanda na boyangeli ya Auguste (27 L.T.B.–14 T.B.) tii na boyangeli ya Dioclétien (284-305 T.B.), bakomaki ba-bulletin de paie soki 225 000 000. Bulletin boni ezali tii lelo? Bamoná kaka mibale oyo moto akoki kotánga.
Mpo na nini makomi ya kala oyo bakomaki na papirise etikalá kaka moke lelo oyo? Biloko lokola papirise mpe mposo ya nyama oyo bazalaki kosalela mpo na kokoma, ebebaka noki soki ezali na esika ya malili. Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Na kotalela klima, bapapirise oyo bakomaki likoló na yango na ntango wana [mbula nkóto ya liboso L.T.B] ekokaki kobatelama soki kaka ezalaki na esobe to esika ekauká.”
Bongo makomi ya Biblia?
Na ebandeli, mikanda ya Biblia ekomamaki mpe na biloko oyo ebebaka, ndenge moko na oyo bato ya Fenisia, ya Ezipito, mpe ya Roma bazalaki kosalela. Kasi, nini esalaki ete makambo oyo ezali na Biblia ebeba te mpe lelo oyo ekóma buku oyo ekabolami mingi na mokili? Profɛsɛrɛ James Kugel apesi ntina moko. Alobi ete bazalaki kosala bakopi ya makomi ya ebandeli ya Biblia “ebele mpenza ata ntango bakomi na yango bazalaki naino na bomoi.”
Mabongoli ya Biblia oyo ezali lelo ekokani mpenza na bamaniskri ya kalakala? Profɛsɛrɛ Julio Trebolle Barrera, oyo azali na kati ya bato ya mayele oyo bazwaki mokumba ya kotalela mpe kobimisa bamaniskri ya kala oyo ebengamaka Barulo ya Mbu oyo Ekufá, alobi boye: “Makomami ya Ebre oyo tozali na yango lelo ekokani mpenza na oyo ezalaki kala, ekeseni na mikanda mosusu ya kala ya Grɛki mpe ya Latin.” Frederick Bruce, moto ya mayele na makambo ya Biblia, alobi boye: “Bosolo ya makomi ya Boyokani ya Sika oyo tozali na yango lelo emonisami malamu mpenza koleka oyo ya makomi ya bato mosusu ya kala, kasi ata moto moko te atyelaka yango ntembe.” Abakisi boye: “Soki Boyokani ya Sika ezalaki na mikanda ya bato ya mokili, moto moko te alingaki kobɛtela bosolo na yango ntembe.” Ya solo, Biblia ezali buku oyo eleki babuku nyonso. Ozwaka ntango ya kotánga yango mokolo na mokolo?—1 Petro 1:24, 25.
Lelo oyo ezali na bakopi soki 6 000 ya Makomami ya Ebre, to Boyokani ya Kala, oyo bato bakomá na mabɔkɔ, mpe bakopi soki 5 000 ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, to Boyokani ya Sika