Ntina oyo okoki kondimela Baevanzile ya Biblia
“Bato bakómi kolanda yango mingi mpenza. Epesá bato makanisi ya kosala bafilme oyo esɛngaki bamilio ya mbongo . . . mpe babuku oyo etɛkami mingi koleka . . . Mwa mangomba ya bokristo elandá yango. Ebimisá mangomba mpe makanisi oyo emonisi ete babombá makambo mosusu.”—SUPER INTERESSANTE, ZULUNALO MOKO OYO EPESAKA BANSANGO NA BRÉSIL.
NYONSO wana mpo na nini? Zulunalo yango ezalaki kolobela ndenge bato bakómi kosepela mingi mpe kosala makambo na kolanda babuku oyo balobaka ete ezali baevanzile, mikanda, mpe bimoniseli oyo bamonaki na Nag Hammadi mpe na bisika mosusu na Ezipito, na katikati ya siɛklɛ ya 20. Babengaka mikanda yango mpe mikanda mosusu ya ndenge wana makomi ya gnostique to ya apocryphe. *
Basalelaki yango likita?
Na eleko oyo bato mingi bakómi na ntembe mingi mpo na Biblia mpe mpo na mangomba ya kala, makomi ya gnostique to ya apocryphe emonani lokola esimbi esika oyo bato balingaka. Makomi yango ebongolá mpenza ndenge oyo bato mingi batalelaka mateya ya Yesu Kristo mpe bokristo yango moko. Zulunalo moko elobi boye: “Evanzile ya Toma mpe [makomi] mosusu ya apocryphe elobaka na motema ya etuluku moko ya bato oyo ezali se kokola na ntango na biso: bato oyo bazali na mposa ya kosambela Nzambe kasi batyelaka mangomba motema te.” Bakalkile emonisi ete kaka na Brésil, “ezali na mangomba koleka 30 oyo bindimeli na yango euti na makomi ya apocryphe.”
Lokola bamonaki mikanda yango, likanisi epalanganaki ete na siɛklɛ ya minei ya ntango na biso (T.B.), Lingomba ya Katolike esalaki likita mpo na kobomba solo na ntina etali Yesu, balongolaki masolo mosusu ya bomoi na ye oyo ezali na makomi ya apocryphe, mpe babebisaki Baevanzile minei ya Biblia. Elaine Pagels, profɛsɛrɛ ya makambo ya mangomba, alobaki boye: “Tobandi sikoyo komona ete oyo tobengaka bokristo—mpe oyo tomonaka ete ezali mimeseno ya bokristo—ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo bazwá na mikanda, oyo baponá kati na ebele ya mikanda mosusu.”
Mpo na bato ya mayele lokola Pagels, bindimeli ya bokristo ezali kaka na Biblia te; ezali mpe na mikanda mosusu, na ndakisa makomi ya apocryphe. Na ndakisa, emisyo moko ya BBC na nkombo Mabombami ya Biblia, “Maria Magadalena ya solosolo” elobaki ete makomi ya apocryphe emonisi Maria Magadalena lokola “moteyi mpe mokambi ya bayekoli mosusu na makambo ya losambo. Azalaki kaka moyekoli te; azalaki ntoma epai ya bantoma.” Mpo na mokumba oyo bakanisaka ete Maria Magadalena azalaki na yango, Juan Arias akomaki na zulunalo moko ya Brésil (O Estado de S. Paulo) ete: “Lelo oyo makambo nyonso ezali kotinda biso tóndima ete lingomba ya bokristo ya liboso, oyo Yesu asalaki, ezalaki koluka ‘kotombola mwasi mingi,’ mpo bandako-nzambe ya liboso ezalaki na bandako ya basi, epai basi bazalaki kosala misala ya banganga-nzambe mpe ya baepiskɔpɔ.”
Bato mingi bamonaka ete ebongi kotyela makomi ya apocryphe motema mingi koleka Biblia. Nzokande, likambo yango ebimisi mwa mituna ya ntina mingi: Bindimeli ya Lingomba ya bokristo esengeli kouta mpenza nde na makomi ya apocryphe? Ntango makomi yango eyokani te na mateya ya Biblia, oyo wapi tosengeli kondima—Biblia to makomi ya apocryphe? Basalaki mpenza likita na siɛklɛ ya minei mpo na kolimwisa makomi yango mpe babebisaki Baevanzile minei mpo na kolongola makambo ya ntina oyo etali Yesu, Maria Magadalena, mpe bato mosusu? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótala moko ya Baevanzile minei ya Biblia, evanzile ya Yoane.
Litatoli oyo euti na evanzile ya Yoane
Na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, bamonaki na Ezipito eteni moko ya maniskri ya Evanzile ya Yoane oyo ezalaki na motuya mingi; babengaka yango Papyrus Rylands 457 (P52). Makomi yango ekokani na Yoane 18:31-33, 37, 38 na Biblia ya lelo mpe babombi yango na Bibliotɛkɛ John Rylands, na Manchester, na Angleterre. Ezali eteni ya maniskri ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo eumeli mingi koleka. Bato mingi ya mayele bamonaka ete ekomamaki na mobu soki 125 T.B., mbula soki 25 mpamba nsima ya liwa ya Yoane. Likambo ya kokamwa ezali ete makomi oyo ezali na eteni ya maniskri yango eyokani pene na nyonso na makomi oyo ezali na baminiskri oyo ekomamaki nsima. Lokola kopi ya Evanzile ya Yoane ya kala ndenge wana esilaki kokóma na Ezipito, epai bamonaki eteni ya maniskri wana, yango emonisi ete nsango malamu ya Yoane ekomamaki mpenza na siɛklɛ ya liboso T.B. na Yoane ye moko, ndenge Biblia emonisi yango. Boye, mokanda ya Yoane ekomamaki na moto oyo amonaki makambo na miso.
Longola yango, makomi nyonso ya apocryphe ekomamaki banda na siɛklɛ ya mibale, elingi koloba mbula nkama moko to koleka na nsima, wana makambo oyo makomi yango elobeli esilaki kosalema. Bato mosusu ya mayele balukaka komonisa ete makomi ya apocryphe elandaki nde makomi to mimeseno ya kala, kasi eloko moko te endimisi likambo yango. Na yango, motuna oyo ebongi komituna yango oyo: Okondima nini—litatoli ya bato oyo bamonaki makambo na miso to ya bato oyo bazalaki na bomoi mbula nkama moko nsima ya makambo yango? Eyano ezali polele. *
Papyrus Rylands 457 (P52), eteni ya maniskri ya Evanzile ya Yoane ya siɛklɛ ya mibale T.B., ekomamaki bambula mingi nsima ya oyo Yoane ye moko akomaki
Bongo likanisi oyo elobi ete babebisaki Baevanzile oyo ezali na Biblia mpo na kolimwisa masolo mosusu ya bomoi ya Yesu? Na ndakisa, ezali na likambo moko oyo emonisi ete babebisaki Evanzile ya Yoane na siɛklɛ ya minei mpo na kobalola makambo? Mpo na koyanola na motuna yango, tosengeli koyeba ete moko ya bamaniskri ya ntina mingi oyo ebimisá Biblia oyo tozali na yango lelo ezali maniskri ya siɛklɛ ya minei oyo babengi Vaticanus 1209. Soki Biblia oyo tozali na yango lelo ezali na bambongwana oyo bakɔtisaki na siɛklɛ ya minei, bambongwana yango esengeli mpe komonana na maniskri yango. Likambo ya esengo ezali ete maniskri mosusu oyo ezali na eteni monene ya mikanda ya Luka mpe Yoane, oyo babengi Bodmer 14, 15 (P75), ekomamaki banda mobu 175 T.B. tii na mobu 225 T.B. Mpo na bato ya mayele, makomi ya maniskri yango ekokani mpenza na oyo ya Vaticanus 1209. Na maloba mosusu, mbongwana moko te ya monene esalemaki na Baevanzile oyo ezali na Biblia, mpe maniskri ya Vaticanus 1209 endimisi yango.
Eloko moko te, ezala mokanda to eloko mosusu, emonisi ete Evanzile ya Yoane—to Baevanzile mosusu—ebebisamaki na siɛklɛ ya minei. Nsima ya koyekola biteni ya bamaniskri oyo bazwaki na Oxyrhynchos, na Ezipito, Peter Head, profɛsɛrɛ na Iniversite ya Cambridge, akomaki boye: “Na makambo mingi bamaniskri yango endimisi makomi minene ya oncial [bamaniskri oyo ekomamaki na balɛtrɛ ya minene banda na siɛklɛ ya minei] oyo basalelaka lelo mpo na koluka kobongisa Makomami. Eloko moko te ezali awa oyo ekosɛnga tósosola na ndenge moko ya sika mpenza makomi ya Testama ya Sika oyo tozalaka na yango banda kala.”
Tóloba nini?
Baevanzile minei oyo ezali na Biblia—Matai, Marko, Luka, mpe Yoane—endimamaki na bakristo nyonso banda na katikati ya siɛklɛ ya mibale. Buku ya Tatien oyo bazalaki kosalela mingi mpe oyo babengi Diatessaron (liloba ya Grɛki oyo elimboli “na kolanda [yango] minei”), ekomamaki soki na 160 tii na 175 T.B., elandaki kaka Baevanzile minei oyo ezali na Biblia kasi elandaki “evanzile” moko te ya gnostique. (Talá etanda “Akɔtelaki Baevanzile na ebandeli.”) Likambo mosusu ya ntina ezali likanisi ya Irénée, oyo azalaki na bomoi na nsuka ya siɛklɛ ya mibale T.B. Alobaki ete Baevanzile esengeli kozala minei, ndenge bangámbo ya mabele ezali minei mpe mipɛpɛ minene ezali minei. Atako ndenge oyo akokanisaki makambo ekoki kobimisa ntembe, likanisi na ye emonisi ete ezali kaka Baevanzile minei nde endimamaki na ntango wana.
Makambo nyonso wana emonisi nini? Emonisi ete Makomami ya Grɛki ya bokristo—kati na yango Baevanzile minei—oyo tozali na yango lelo ebongwaná mpenza te banda na siɛklɛ ya mibale. Ntina ezali te ya kondima ete basalaki likita na siɛklɛ ya minei mpo na kobongola to kolimwisa eteni moko boye ya Makomami oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Nzokande, Bruce Metzger, moto ya mayele na makambo ya Biblia, akomaki boye: “Na nsuka ya siɛklɛ ya mibale, . . . eteni monene ya Testama ya Sika endimamaki mingi na masangá ndenge na ndenge ya bandimi oyo epalanganaki kaka zingazinga ya mbu Mediterane te, kasi mpe na mikili oyo ezalaki banda na Bretagne tii na Mezopotamia.”
Ntoma Paulo ná ntoma Petro babundelaki makasi solo ya Liloba ya Nzambe. Bango mibale bakebisaki makasi baninga na bango bakristo ete bándima eloko moko te oyo ekeseni na makambo oyo bateyamaki. Na ndakisa, Paulo akomelaki Timote boye: “Ee Timote, batelá eloko oyo ebombami epai na yo, boyá bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu mpe maloba ya ntembe ya ‘boyebi’ ya lokuta. Lokola bamosusu bamonisaki na lolendo ete bazali na boyebi yango batiki kondima.” Petro apesaki litatoli oyo: “Ya solo, tolakisaki bino nguya mpe kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo na masapo ya lokuta oyo esalemi na mayele te, kasi nde na ndenge tomonaki bonene na ye na miso na biso moko.”—1 Timote 6:20, 21; 2 Petro 1:16.
Basiɛklɛ mingi liboso, na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mosakoli Yisaya alobaki boye: “Matiti ya mobesu ekauki, fololo elɛmbilɛmbi; kasi liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.” (Yisaya 40:8) Biso mpe tokoki kondima ete Ye oyo akomisaki Makomami mosantu na litambwisi ya elimo na ye abatelaki mpe yango na boumeli ya bambula mpo “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Timote 2:4.
^ par. 3 Maloba yango mibale euti na maloba ya Grɛki; “gnostique” ekoki kolimbola “boyebi oyo ebombaná” mpe “apocryphe” “eloko oyo ebombamá malamumalamu.” Basalelaka maloba wana mpo na kolobela makomi ya lokuta to oyo endimami te na liste ya mikanda ya Biblia, mpe oyo esalaka lokola komekola Baevanzile, Misala, mikanda, mpe bimoniseli oyo ezali na liste ya mikanda ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo endimami.
^ par. 11 Mokakatano mosusu na oyo etali makomi ya apocryphe ezali ete bakopi na yango etikalá kaka mwa ndambo. Evanzile ya Maria Magadalena, oyo toutaki kolobela, etikalá kaka mwa biteni mike mibale ya bamaniskri mpe eteni ya misato oyo eleki molai, ndambo na yango ezangi. Lisusu, bamaniskri oyo ezali, ekeseni mpenza yango na yango.