Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sekele mpo na libota ya esengo

Koteya bana bákokisaka mikumba na bango

Koteya bana bákokisaka mikumba na bango

George: * “Mpokwa nyonso ezalaki kaka ndenge moko. Michael, mwana na ngai ya mobali ya mbula minei, azalaki kopanza biloko na ye ya kosakana ndako mobimba. Nazalaki komeka kotinda ye abongisa yango liboso ya kolalisa ye. Kasi Michael azalaki kosilika makasi, koganga mpe kosala makambo ya mabe. Na bantango mosusu nayokaki nkanda makasi mpe nagangelaki ye, kasi ebimisaki nde mabe koleka mpo na biso mibale. Nazalaki kolinga ete ntango ya kolala ezala ntango ya esengo. Yango wana, natikaki kotinda ye mpe ngai moko nakómaki kobongisa biloko yango.”

Emily: “Matata ebandaki ntango Jenny, mwasi na ngai ya mwasi ya mbula 13, azalaki kokoka te kokanga ntina ya makambo oyo molakisi na bango asɛngaki ye asala na devuare moko. Jenny alelaki na ndako ngonga mobimba ntango autaki kelasi. Nalendisaki ye asɛnga lisalisi na eteyelo, kasi Jenny alobaki ete molakisi na bango azali motema mabe; na yango azalaki kokoka kosolola na ye te. Nazalaki na mposa nakita mbala moko na eteyelo mpe nayebisa molakisi yango makambo oyo nazalaki kokanisa mpo na ye. Nakanisaki ete moto moko te azali na lotomo ya kopesa mwana na ngai mpasi!”

YO MPE oyokaka lokola George mpe Emily? Ndenge moko na baboti yango, mingi bakokaka te komona mwana na bango abunda na mokakatano moko to azanga esengo. Baboti nyonso balukaka kobatela bana na bango. Nzokande, makambo oyo tolobeli likoló epesaki baboti wana libaku ya koteya mwana likambo moko ya ntina mingi na oyo etali mikumba. Ya solo, mateya oyo mwana ya mbula 4 ná oyo mwana ya mbula 13 bakoki koyekola ekozala ndenge moko te.

Kasi, likambo ya solo ezali ete okozala wana ntango nyonso te mpo na kobatela mwana na yo na mikakatano ya bomoi. Nsukansuka, mwana akotika tata ná mama na ye mpe “akomema mokumba na ye moko.” (Bagalatia 6:5; Ebandeli 2:24) Mpo na kosalisa bana bálonga na bomoi, baboti basengeli komityela mokano ya koteya bana mpo bákóma mikóló oyo bazali na moimi te, oyo bakokisaka malamu mikumba na bango. Ezali likambo ya pɛtɛɛ te!

Likambo ya esengo, baboti bakoki kolanda ndakisa malamu mingi ya Yesu mpe ndenge oyo afandaki na bayekoli na ye. Ya solo, Yesu abotaki te. Kasi, ntango aponaki bayekoli mpe azalaki koteya bango, azalaki na mokano ya kopesa bango makasi ya kokoba na mosala, ata soki ye akei. (Matai 28:19, 20) Likambo oyo Yesu asalaki ekokani na mokano oyo moboti nyonso alingaka kokokisa ntango azali koteya bana bákokisaka mikumba na bango. Tótala kaka makambo misato na ndakisa oyo Yesu atikelá baboti.

‘Pesá mwana ndakisa’

Pene na nsuka ya bomoi na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoane 13:15) Ndenge moko mpe, baboti basengeli kolimbwela bana mpe komonisa bango na ndakisa soki kokokisa mikumba elimboli mpenza nini.

Omituna boye: ‘Mbala na mbala nalobaka malamu mpo na mikumba oyo nazali na yango? Nalobelaka esengo oyo nazwaka ndenge nasalaka makasi mpo na basusu? To mbala mingi namilelalelaka mpe namikokanisaka na baoyo bamonanaka lokola bomoi na bango ezali mpasi te?’

Ya solo, moto ya kokoka azali te. Na bantango mosusu, biso nyonso toyokaka ete makambo elekeli biso. Kasi, mbala mosusu ndakisa na yo ezali lolenge oyo eleki malamu ya kosalisa bana na yo bámona ntina mpe motuya ya kokokisa malamu mikumba na bango.

MEKÁ KOSALA BOYE: Soki likoki ezali, kendáká na bantango mosusu na mwana na yo na mosala mpe monisá ye makambo oyo osalaka mpo na kozwa mbongo ya koleisa libota. Soki moto moko azali na mposa ya lisalisi, kende kosalisa ye elongo na mwana na yo. Na nsima, bólobela esengo oyo bozwi na ndenge bokokisi mokumba yango.​—Misala 20:35.

Kolikya makambo mingi te

Yesu ayebaki ete ekosɛnga ntango liboso bayekoli na ye bákoka kosala misala mpe kokokisa mikumba oyo apesaki bango. Mokolo moko alobaki na bango boye: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te.” (Yoane 16:12) Yesu asɛngaki na mbala moko te bayekoli na ye ete básala makambo bango moko. Kasi, alekisaki ntango mingi na koteya bango makambo mingi. Kaka ntango amonaki ete bayekoli bakómi na makoki oyo esengeli nde Yesu atikaki bango básala bango moko.

Ndenge moko mpe, ekozala malamu te baboti básɛnga bana básala makambo ya mikóló soki bakómi naino te na makoki oyo esengeli. Atako bongo, ntango bana bazali kokola, baboti basengeli koyeba misala mpe mikumba oyo ebongi na bango. Na ndakisa, baboti basengeli koteya bana na bango báyeba kokokisa mikumba na bango na oyo etali bopɛto, kopɛtola shambrɛ na bango, kotosa ngonga, mpe kosalela mbongo malamu. Ntango mwana abandi kokende kelasi, baboti basengeli kosalisa mwana amona ete badevuare ya kelasi ezali mokumba ya ntina oyo mwana asengeli kokokisa.

Baboti basengeli kosuka kaka te na kopesa mwana na bango mikumba. Basengeli mpe kosalisa mwana na milende oyo azali kosala mpo na kolonga. George, tata oyo tolobelaki na ebandeli, amonaki ete ntina mosusu oyo Michael azalaki kosilika makasi mpo na kobongisa biloko na ye ya kosakana ezalaki mpo azalaki komona mosala yango makasi mingi. George alobi boye: “Na esika nagangelaka Michael mpo alɔkɔta biloko na ye ya kosakana, namekaki koteya ye ndenge ya kosala mosala yango.”

Asalaki mpenza nini? George alobi boye: “Ya liboso, natyaki ngonga mpo na kolɔkɔtaka biloko yango butu nyonso. Na nsima, nazalaki kosala elongo na Michael, tozalaki kosala na eteni mokomoko ya shambre. Nakómisaki mosala yango lisano; nakómisaki yango kutu momekano mpo na koyeba nani akosala yango mbangu koleka. Eumelaki te, ekómaki likambo oyo tosalaka liboso ya kolala. Nalakaki Michael ete soki asali mosala yango mbangu, ntango nakotángela ye lisolo liboso alala, nakobakisela ye lisolo mosusu. Kasi, soki aumeli, nakotángela ye mingi te.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Luká koyeba likambo oyo mwana na yo mokomoko akoki kosala, oyo ekosalisa libota na yo etambola malamu. Omituna boye: ‘Ezali na makambo oyo nasalelaka bana na ngai tii lelo, oyo bango moko bakoki kosala?’ Soki ezali bongo, saláká yango na bana na yo tii ntango okomona ete bakoki kosala mosala yango bango moko. Monisá bana polele ete makambo ya malamu to ya mabe ekobima, na kolanda ndenge oyo bazali kosala mosala na bango. Na nsima, pesá bango etumbu to mbano.

Pesá malako ya sikisiki

Lokola moteyi nyonso ya malamu, Yesu ayebaki ete mpo na koyekola malamu, esengeli kosala makambo oyo ozali koyekola. Na ndakisa, ntango Yesu amonaki ete ebongi sikoyo, atindaki bayekoli na ye “mibalemibale liboso na ye na engumba nyonso mpe na esika nyonso epai ye moko asengelaki kokóma.” (Luka 10:1) Kasi, atikaki bango kaka boye te. Liboso atinda bango, apesaki bango malako ya sikisiki mpenza. (Luka 10:2-12) Ntango bayekoli ya Yesu bazongaki mpe bayebisaki ye makambo ya malamu oyo basalaki, Yesu apesaki bango longonya mpe alendisaki bango. (Luka 10:17-24) Amonisaki bango ete bakokoka mosala yango mpe andimaki bango.

Ntango bana na yo bazali kobundana na mikumba oyo ezali mpasi, osalaka nini? Olukaka kosalisa bana na yo na makambo oyo bazali kobanga, to kobatela bango mpo bálɛmba nzoto te mpe bákwea te? Likanisi na yo ya liboso ekoki kozala ya “kobikisa” mwana na yo to komema mokumba yango yo moko.

Kasi, kanisá likambo oyo: Ntango nyonso oyo ozali komikɔtisa nokinoki na likambo yango mpe “kobikisa” bana na yo na ndenge moko boye, likanisi nini ozali kotya na motó na bango? Ozali komonisa ete otyelaka bango motema mpe ondimi ete bakokoka kosala yango? To ozali nde koyebisa bango ete okanisi ete bazali naino kaka bana mike, oyo basengeli kotalela yo na makambo nyonso?

Na ndakisa, ndenge nini Emily, oyo tolobelaki na ebandeli, asalaki mpo na mokakatano ya mwana na ye ya mwasi? Na esika amikɔtisa na likambo yango, atikaki Jenny ye moko akende kosolola na molakisi na bango. Ye ná Jenny bakomaki mituna oyo Jenny akomema na kelasi. Na nsima, balobelaki ntango nini Jenny akosolola na molakisi. Basalaki kutu elakiseli mpo bámona ndenge lisolo yango ekoki koleka. Emily alobi boye: “Jenny azwaki mpiko ya kosolola na molakisi na bango, mpe molakisi apesaki ye longonya mpo na likanisi oyo azwaki. Jenny asepelaki mingi​—ngai mpe nasepelaki na ye.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Komá mokakatano moko oyo mwana na yo azali kokutana na yango. Pembeni ya mokakatano yango, komá likambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa mwana na yo alonga mokakatano yango kozanga ‘obikisa’ ye. Bósala elakiseli ya makambo oyo mwana asengeli kosala mpo na kolonga mokakatano yango. Monisá mwana na yo ete ondimi ete akoki kolonga.

Soki ozali ntango nyonso kobatela bana na yo mpo bázala na mikakatano te, mbala mosusu ozali nde kopekisa bango báyeba kobunda na mikakatano ya bomoi. Osengeli nde kokembisa bana na yo, kosalisa bana na yo bándima mikumba na bango. Kosala bongo ekozala moko ya makabo ya motuya mingi oyo okoki kopesa bango.

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

OMITUNA BOYE . . .

  • Nazali kolikya makambo mingi te epai ya bana na ngai?

  • Nayebisaka mpe namonisaka bango makambo oyo basengeli kosala mpo bálonga?

  • Mbala ya nsuka oyo nalendisaki mpe napesaki mwana na ngai longonya ezalaki mokolo nini?