Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini bato basalaka makambo ya mabe?

Mpo na nini bato basalaka makambo ya mabe?

Mpo na nini bato basalaka makambo ya mabe?

BATO mingi te bakotya ntembe na likambo oyo: Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga mpe makambo oyo epesaka biso mawa na nsima. Atako likambo yango ezali solo, yango epesi nde nzela na makambo ya mabe mingi ya minene mpe ya mike oyo tomonaka biso moko na miso to oyo toyokaka mikolo nyonso na radio to na televizyo?

Atako tozali bato ya kozanga kokoka, bato nyonso bayebaka ete ezali na makambo mosusu oyo tosengeli te kosala; mpe bato bazali na likoki ya koboya kosala makambo ya mabe. Bato mingi mpe bakondima ete bokeseni ezali kati na koloba lokuta kozanga kokana mpe kobuka lokuta na nko mpo na kosala moto mabe; bokeseni ezali kati na kozokisa moto kozanga kokana mpe kokana koboma moto. Mbala mingi, makambo yango ya mabe esalemaka na bato oyo tozalaka na bango na kartye, oyo tokoki kokanisa te ete bakoki kosala makambo ya ndenge wana. Mpo na nini bato basalaka makambo ya mabe?

Biblia epesi eyano na motuna yango. Ezali komonisa na bosikisiki ntina oyo bato basalaka makambo oyo bayebi ete ezali mabe. Tótalela oyo Biblia elobi.

▪ “Monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala lokola moto ya ligboma.”​MOSAKOLI 7:7.

Biblia emonisi ete na bantango mosusu likambo oyo moto akutani na yango ekoki kotinda ye asala likambo oyo akokaki kosala te. Bamosusu kutu bakoki ata kosala likambo moko ya mabe kaka mpo na koluka kosilisa likambo oyo ezali konyokola bango to oyo bamoni ete ezali sembo te. Ndenge buku moko (Urban Terrorism) elobi yango, “mbala mingi, likambo ya libosoliboso oyo etindaka bato bákóma bateroriste ezali mpo bamonaka ete bazali na nguya te ya kotɛmɛla makambo oyo bamonaka ete ekoki kobongwana te; na ndakisa makambo ya politiki, makambo etali bomoi ya bato, mpe makambo ya nkita.”

▪ “Jambi mposa na mosɔlɔ ejali ntina na mabe yɔnsɔ.”​1 TIMOTE 6:10, HAUT FLEUVE.

Bato mosusu balobaka ete ata moto malamu akoki kobuka mobeko soki bapesi ye mbongo ebele. Bato mosusu oyo bazalaka malamu mpe boboto ntango makambo ezali kotambola malamu, ntango bakutani na likambo oyo ekoki kosala ete bábungisa mbongo to bázwa mbongo mingi, babongwanaka, bakómaka makambo mabe mpe nkandankanda. Kanisá makambo mingi ya mabe oyo esalemaka mpo na lokoso​—kolyela, kobɔtɔla, kanyaka, kokanga moto mpo bapesa yo mbongo liboso otika ye, ata mpe koboma.

▪ “Lokola etumbu mpo na mosala mabe epesamaki nokinoki te, motema ya bana ya bato etingami na kosala mabe.”​MOSAKOLI 8:11.

Vɛrsɛ yango emonisi likanisi oyo bato bazalaka na yango ete moto akoki kosala likambo ya mabe mpe kozwa etumbu te ntango bakonzi bazali komona te. Ezali bongo mpo na bato oyo bakumbaka mituka na vitɛsi ya makasi, baoyo bayibaka na ekzamɛ, bayibaka mbongo ya Leta mpe baoyo basalaka makambo ya mabe mingi koleka. Ntango mibeko ezali mpenza makasi te, to ntango moto azali kobanga te ete bakokanga ye, bato oyo batosaka mibeko bakoki komona ete bakoki kosala likambo oyo bayebi ete bakoki kosala yango te. Zulunalo moko (Arguments and Facts) elobi ete, “ndenge oyo bato mabe bazwaka etumbu te, etindaka ata bana-mboka oyo bamonanaka ete bakoki kosala mabe te, básala kutu makambo ya mabe koleka.”

▪ “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu.”​YAKOBO 1:14, 15.

Moto nyonso akoki kozala na makanisi ya mabe. Mikolo nyonso tokutanaka na makambo mingi oyo etindaka biso tósala mabe. Na ntango ya kala, bakristo bazwaki toli oyo: “Komekama moko te ekómeli bino oyo ekómelaka bato nyonso te.” (1 Bakorinti 10:13) Atako bongo, ekateli oyo moto ye moko azwaka nde ekataka makambo​—kolongola mbala moko makanisi ya mabe to kofandisa yango kaka na motó mpe kotika yango ekola na motema. Vɛrsɛ oyo touti kotánga, oyo ezali na mokanda ya Yakobo, ekebisi ete soki moto atiki makanisi ya mabe ‘ezwa zemi,’ na ntembe te makambo ya mabe ekolanda na nsima.

▪ “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”​MASESE 13:20.

Ezali likambo ya kozwa na lisɛki te, baninga na biso bakoki kotinda biso tósala mabe to malamu. Yango wana, mbala mingi bato basalaka makambo oyo bakanaki te​—kaka mpo baninga batye bango mpanzi likoló; to ndenge bato mingi balobaka, mpo bazalaki na baninga ya mabe nde basali makambo ya mabe. Na Biblia, liloba “bazoba,” elimboli te baoyo bazangi mayele; kasi, baoyo batyaka likebi te na toli ya bwanya ya Liloba ya Nzambe. Ezala tozali mikóló to bilenge, soki toponi te na bwanya nyonso baninga to bato oyo tozalaka na bango, elingi koloba na kolanda mitinda ya Biblia, tosengeli koyeba ete ‘tokosuka mabe.’

Bavɛrsɛ oyo mpe bavɛrsɛ mingi mosusu ya Biblia emonisi polele ntina oyo bato​—ata bato oyo tomonaka ete bakoki te kosala makambo ya mabe—​basalaka mabe, ata mpe makambo ya mabe mingi. Atako ezali litomba koyeba eloko oyo etindaka bato básala makambo ya mabe mpenza, elikya ezali ete makambo ekobonga? Ee, mpo Biblia elimboli kaka te ntina oyo bato basalaka mabe, kasi elaki mpe ete makambo ya ndenge wana ekozala lisusu te. Bilaka yango ezali nini? Makambo nyonso ya mabe na mokili oyo ekosila mpenza? Lisolo oyo elandi ekopesa biso biyano.