Bomoi na ntango ya kala—Mobateli ya mpate
“Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko. Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate; mpe akomema yango na ntolo na ye.”—YISAYA 40:11.
BIBLIA elobeli babateli ya mpate mbala mingi, kobanda na mokanda ya liboso ya Ebandeli, tii na Emoniseli, mokanda ya nsuka. (Ebandeli 4:2; Emoniseli 12:5) Bato minene lokola Abrahama, Moize, mpe Mokonzi Davidi, bazalaki babateli ya bampate. Davidi, mokomi ya Nzembo alobelaki na maloba kitoko mokumba ya mobateli malamu ya mpate mpe makambo oyo atyelaka likebi. Mpe na nzembo oyo Asafe akomaki, atángaki Davidi lokola mobateli ya basaleli ya Nzambe na ntango ya kala.—Nzembo 78:70-72.
Tii na ntango ya Yesu, kobatela bampate ezalaki kaka mosala ya ntina mingi. Yesu amibengaki “mobateli ya mpate oyo aleki malamu” mpe mbala mingi azalaki kolobela bizaleli ya mobateli malamu ya bampate mpo na koteya mateya ya ntina. (Yoane 10:2-4, 11) Ata mpe Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso bakokanisi ye na “mobateli ya mpate.”—Yisaya 40:10, 11; Nzembo 23:1-4.
Mobateli ya mpate azalaki kobatela banyama nini? Mosala na ye ezalaki kosɛnga nini? Mpe liteya nini tokoki kozwa na mosala makasi oyo azalaki kosala?
Bampate mpe bantaba
Ekoki kozala ete na Yisraele, babateli ya bampate bazalaki kobatela mitindo ndenge na ndenge ya bampate lokola oyo ezalaka na Siri, oyo ezalaka na mikila minene mpe etondi na nsuki. Bampate ya mibali ya motindo wana ezalaka na maseke, mpe oyo ya basi ezalaka na yango te. Lokola banyama yango ezalaka matata te, ezalaka mpasi te mpo na
kokamba yango mpe ezalaka na likoki ata moke te ya komibatela liboso ya banyama mabe.Babateli ya bampate bazalaki mpe kobatela bantaba. Bantaba ezalaki ya langi ya moindo to ya shokola. Banzubɛ mpe mwa banzete mosusu ezalaki kozokisa matoi na yango ya milai oyo ezalaki koningananingana ntango ezalaki komata bangomba ya mabangamabanga mpo na kolya matiti.
Mobateli ya mpate azalaki ntango nyonso na mokakatano mpo na koteya bampate ná bantaba etosa ye. Ata bongo, babateli malamu ya bampate bazalaki kobatela mpenza banyama oyo bazalaki kokamba, bazalaki kutu kopesa yango nkombo oyo bampate ezalaki kondima ntango babengi yango.—Yoane 10:14, 16.
Bileko ya mosala ya mobateli ya mpate
Mikolo nyonso, na eleko ya prɛnta, mobateli ya mpate azalaki kozwa bampate na lopango na yango oyo ezalaki pembeni ya ndako na ye mpe komema yango na esika oyo baleisaka banyama matiti na mboka ya pembeni, epai matiti ya kitoko mpe ya sika ezalaki kokola. Na boumeli ya eleko yango, soki bameme eboti, etonga ezalaki kokóma monene. Na ntango yango, bato ya misala bazalaki mpe kokata nsuki ya bampate mpe yango ezalaki ntango moko ya esengo.
Moto mosusu akokaki kozala kaka na mwa bampate. Yango wana, akokaki kozwa mobateli ya mpate na mosala, mpo asangisa etonga na ye ya moke ná etonga mosusu. Babateli ya bampate oyo bazalaki kozwa bango na mosala bayebanaki mpo na ezaleli na bango ya kokipe mingi banyama na bango moko koleka oyo bapesi bango bábatela.—Yoane 10:12, 13.
Soki basilisi kobuka mbuma ya bilanga ya mboka oyo ezali pembeni, mobateli ya mpate azalaki kotika bampate na ye elya matiti oyo ezalaki kobima sika mpe mbuma oyo etikalaka na bilanga. Soki eleko ya molunge ebandi, babateli ya bampate bazalaki komema bampate na esika ya malili likoló ya bangomba, mpo na koleisa bango. Na boumeli ya mikolo ebele, babateli ya bampate bazalaki kosala mosala mpe kolala libanda mpo etonga elya matiti na bisika oyo ekitá makasi na mipanzi epai matiti ezalaki mpe bazalaki kolekisa butu mobimba na kobatela mapango ya bampate oyo ezalaki na bisika ya polele. Na bantango mosusu, mobateli ya mpate azalaki kolalisa etonga na ye butu mobimba na kati ya libulu moko, epai ezalaki kobatelama mpo bambulú mpe ekange elya yango te. Na butu, soki makelele ya ekange ebangisi etonga ya bampate, mongongo ya mobateli ya mpate ezalaki kosala ete bábanga te.
Mpokwa nyonso, mobateli ya mpate azalaki kotánga bampate mpe kotalatala soki bazali maladi te. Na ntɔngɔ, azalaki kobenga, mpe etonga ezalaki kolanda ye na esika oyo elyaka matiti. (Yoane 10:3, 4) Na midi, babateli ya bampate bazalaki komema bampate na maziba ya mai mpo bámɛla. Ntango maziba yango ezalaki kokauka, mobateli ya mpate azalaki komema bampate na libulu ya mai mpe kotokela bango yango.
Na nsuka ya eleko ya molunge, mobateli ya mpate azalaki komema etonga na ye na mabwaku, mpe na mabele patatalu. Soki eleko ya mbula ya
banɛjɛ ebandi, azalaki kozongisa bampate na ndako mpo elekisa eleko ya malili na ndako. Soki asali bongo te, banyama ekokaki kokufa na libanda ntango mbula makasi to ya mabanga ezali kobɛta, to mpo na nɛjɛ. Kobanda na sanza ya Novɛmbɛ tii na eleko ya prɛnta, babateli ya bampate bazalaki te koleisa bitonga na libanda.Bisaleli ya mosala
Bilamba ya mobateli ya mpate ezalaki ya mindɔndɔ te, kasi ezalaki makasi. Mpo na komibatela na mbula mpe mopɛpɛ ya malili na butu, ekoki kozala ete azalaki kolata elamba oyo esalemi na mposo mpe na nsuki ya meme oyo bazalaki kokata. Mpo na kobatela loposo ya nzoto na ye, azalaki kolata zambala. Sandale ezalaki kobatela makolo na ye na mabanga ya mikemike mpe banzube, mpe azalaki kozipa motó na ye na elamba moko oyo esalemi na lɛnɛ.
Mbala mingi, mobateli ya mpate azalaki kosalela biloko oyo elandi: Sakosi ya mposo ya nyama oyo azalaki kotya biloko ya kolya lokola mampa, olive, mbuma ya kokauka mpe fromaje; mwa nzete oyo mbala mingi ezalaki ya mɛtrɛ 1, oyo ezalaki ebundeli moko malamu, mpe ezalaki na eloko moko oyo bakangisá na nsuka na yango; mbeli; mwa nzete moko oyo mobateli ya mpate azalaki kosimba ntango azali komata ngomba; molangi na ye ya mai; eloko ya kotoka mai ya mposo ya nyama oyo bakoki kogumba yango mpo na kotoka mai na mabulu ya mozindo; bilingongo to lansi oyo azalaki kosalela mpo na kobwaka libanga pembeni ya meme to ntaba oyo ebungi nzela mpo na kobangisa yango ezonga na etonga to mpo na kobengana banyama mabe oyo elingi kolya mpate; piololo oyo esalami na papirisi oyo azalaki kobɛta mpo na komisepelisa mpe mpo etonga ezala na kimya.
Mpo mobateli ya mpate azala malamu, banyama yango ezalaki kosala ete azwa biloko oyo asengeli na yango; na ndakisa miliki mpe mosuni ya kolya. Bazalaki kosanze nsuki mpe mposo ya banyama na biloko mosusu mpe bazalaki kosala na yango bilamba mpe milangi. Bazalaki kosala bilamba na nsuki ya ntaba, mpe bazalaki kosalela meme to ntaba mpo na kopesa bambeka.
Ndakisa ya kolanda
Babateli malamu ya bampate bazalaki makasi na mosala, bato ya kotyela motema, mpe ya mpiko. Bazalaki kutu kotya bomoi na bango na likama mpo na kobatela etonga.—1 Samwele 17:34-36.
Tokoki kokamwa te soki Yesu mpe bayekoli na ye bazwaki mobateli ya mpate lokola ndakisa mpo na bakɛngɛli bakristo. (Yoane 21:15-17; Misala 20:28) Lokola mobateli ya mpate na ntango ya kala, lelo oyo na lisangá, bakɛngɛli basalaka makasi ‘bábatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bango, basalaka yango na kotindikama te, kasi na motema moko; ezalaka te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo.’—1 Petro 5:2.