Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ndenge nini Bayuda ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kobongisa ebembe liboso ya kokunda?

Bayuda bazalaki kokunda ebembe na bango nokinoki kaka na mokolo oyo moto yango akufi. Bazalaki kosala bongo mpo na bantina mibale. Ya liboso, molunge makasi ya Moyen-Orient ebebisaka bibembe noki. Ya mibale, mpo na bato ya ntango wana, kotika ebembe mikolo ebele kozanga kokunda yango ezalaki komonisa kozanga limemya mpo na mowei mpe libota na ye.

Baevanzile mpe mokanda ya misala, elobeli bibembe minei oyo bakundaki kaka na mokolo oyo bato yango bakufaki. (Matai 27:57-60; Misala 5:5-10; 7:60–8:2) Basiɛklɛ mingi liboso, Rashele mwasi ya Yakobo akufaki ntango Yakobo ná libota na ye bazalaki na mobembo. Na esika amema ebembe epai bazalaki kokunda bato ya libota na bango, Yakobo akundaki ye na lilita moko na “nzela oyo ezali kokende na . . . Beteleme.”​—Ebandeli 35:19, 20, 27-29.

Masolo ya Biblia oyo elobeli ndenge bazalaki kokunda bibembe emonisi ete Bayuda bazalaki kobongisa ebembe malamumalamu liboso ya kokunda yango. Bato ya libota mpe baninga bazalaki kosukola nzoto ya mowei, kopakola yango matiti ya nsolo kitoko, mafuta ya malamu mpe kozinga yango na bilamba. (Yoane 19:39, 40; Misala 9:36-41) Baninga ya kartye mpe bato mosusu bazalaki koya mpo na kolela mpe kobɔndisa libota ya mowei.​—Marko 5:38, 39

Bakundaki Yesu kaka ndenge bazalaki kokunda Bayuda nyonso?

Mabota mingi ya Bayuda ezalaki kokunda bibembe na bango na mibenga mpe malita oyo batimolá na kati ya libanga ya pɛtɛpɛtɛ, oyo ezalaki na bisika mingi na Yisraele. Kosala bongo emonisi ete bazalaki kolanda ndakisa ya bankɔkɔ na bango. Na ndakisa, bakundaki Abrahama, Sara, Yisaka, Yakobo mpe bamosusu na kati na mobenga ya Makapela pene na Hebrone.​—Ebandeli 23:19; 25:8, 9; 49:29-31; 50:13.

Bakundaki Yesu na lilita oyo batimolá na kati ya libanga moko monene. (Marko 15:46) Mbala mingi, libulu ya boye ezalaki na mwa lidusu ya kokɔtela. Na kati, ezalaki na madusu mosusu oyo batɔbɔlá na libanga yango lokola bashambrɛ, epai bazalaki kotya bibembe ya bato ya mabota na bango. Soki bibembe yango etikali mikuwa mpamba, bazalaki kosangisa mikuwa yango oyo ekauká mpe kotya yango na kɛsi moko ya libanga oyo bazalaki kobenga sanduku ya kobomba mikuwa, ndenge bato bamesanaki kosala na ntango ya Yesu. Na ndenge yango, esika ezalaki kotikala mpo libota ekunda bibembe mosusu na mikolo ezali koya.

Lokola Mibeko ya Moize esɛngaki Bayuda bapemaka na mokolo ya sabata, yango wana na mokolo yango bazalaki kobongisa nzoto ya mowei te lokola momeseno. Lokola Yesu akufaki bangonga misato liboso sabata ebanda, Yozefe moto ya Arimatea mpe bato mosusu bakundaki ye kozanga ete babongisa nzoto na ye malamumalamu. (Luka 23:50-56) Yango wana, nsima ya sabata baninga mosusu ya Yesu bakendaki na lilita mpo na kosilisa kobongisa nzoto na ye.​—Marko 16:1; Luka 24:1.