Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MITUNA YA BATÁNGI . . .

Mpo na nini Biblia etángi te bankombo ya bato mosusu oyo yango elobeli?

Mpo na nini Biblia etángi te bankombo ya bato mosusu oyo yango elobeli?

Mokanda ya Ruta ebengi moto oyo aboyaki kokokisa mokumba na ye na kotalela mibeko ya Moize, Songolo. (Ruta 4:1-12) Tosengeli koloba ete Biblia etángi bankombo ya bato yango te mpo bazali mabe to na ntina te?

Te. Tótalela ndakisa mosusu. Mpo na kobongisa elekeli na ye ya nsuka, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókende na engumba epai ya Songolo [“moto moko boye,”]” mpe bóbongisa makambo na ndako na ye. (Matai 26:18) Tokoki koloba ete moto oyo babengi “Songolo” na vɛrsɛ yango azalaki moto mabe to ebongaki te batánga nkombo na ye mpo azalaki na ntina te? Soki moke te; “moto moko boye” oyo balobeli na vɛrsɛ yango azalaki moyekoli ya Yesu. Batángi nkombo na ye te mpo ezalaki na ntina te na lisolo yango.

Lisusu, Biblia etángi bankombo ya bato mingi ya mabe; ezali mpe na bandakisa ya bato mingi ya sembo oyo bankombo na bango etángami te. Na ndakisa Eva, nkombo ya mwasi ya liboso eyebani malamu. Kasi, kozanga botosi mpe ezaleli na ye ya koluka matomba na ye moko, esalaki ete Adama asala lisumu mpe yango ememelá biso ebele ya bampasi. (Baroma 5:12) Nzokande, Makomami etángi te nkombo ya mwasi ya Noa, kasi tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na ezaleli ya komipimela oyo amonisaki, ndenge apesaki mobali na ye mabɔkɔ na mosala ya ntina mingi. Ezali polele ete atako Biblia etángi nkombo na ye te, yango elakisi te ete azangaki ntina, to Yehova apambolaki ye te.

Ezali mpe na bato mosusu oyo bakokisá mikumba ya ntina mingi ata mpe oyo ya mpasi mpenza na mokano ya Yehova, kasi Biblia etángi bankombo na bango te. Kanisá lisusu mwana mwasi Moyisraele wana ya moke oyo azalaki moombo na ndako ya Naamane, mokonzi ya basoda ya ekólo Siri. Na mpiko nyonso, abɛtelaki mwasi ya Naamane, nkolo na ye, lisolo ya mosakoli ya Yehova na Yisraele. Yango esalaki ete likamwisi moko monene esalama. (2 Bakonzi 5:1-14) Mwana mwasi ya Yefeta, mosambisi moko ya Yisraele atiká mpe ndakisa malamu ya kondima. Andimaki koboya kobala mpe kobota mpo na kokokisa ndai ya tata na ye. (Basambisi 11:30-40) Ndenge moko mpe, Biblia etángi te bankombo ya bato oyo bakomaki nzembo koleka 40; etángi mpe te bankombo ya basakoli oyo bakokisaki na bosembo mpenza mikumba minene.​—1 Bakonzi 20:37-43.

Mbala mosusu, ndakisa oyo ekoki kobenda likebi na biso koleka ezali oyo ya baanzelu ya sembo. Atako ezali na bankama ya bamilio ya baanzelu, kasi Biblia etángi kaka bankombo ya baanzelu mibale, Gabriele ná Mikaele. (Danyele 7:10; Luka 1:19; Yuda 9) Nyonso oyo batikali, Biblia etángi bankombo na bango te. Na ndakisa, Manoa, tata ya Samsone atunaki anzelu moko boye: “Nkombo na yo nani, mpo tókumisa yo mpenza ntango liloba na yo ekokokisama?” Alobaki na ye boye: “Mpo na nini ozali kotuna nkombo na ngai?” Na komikitisa nyonso, anzelu yango aboyaki kondima lokumu oyo ebongaki kaka na Nzambe.​—Basambisi 13:17, 18.

Biblia emonisi te ntina oyo bankombo ya bato mosusu etángami mpe ya basusu etángami te. Kasi tokoki kozwa mateya mingi na masolo ya bato ya sembo oyo basalelaki Nzambe kozanga ete bayebana.