Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo”

“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo”

Okosepela mpenza na likabo ya ndenge nini? Na ntembe te, biso nyonso tosepelaka na likabo oyo euti epai ya moto oyo apesi yango na bolingo, kasi te mpo basɛngi ye na makasi ete asala bongo. Makanisi oyo etindaka moto apesa likabo ezalaka mpenza na ntina. Ezalaka mpe na ntina mpo na biso. Kasi oyo eleki nyonso, ezalaka na ntina na miso ya Nzambe. Tótalela maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 2 Bakorinti 9:7.

Mpo na nini ntoma Paulo akomaki maloba wana? Alingaki kolendisa bakristo ya Korinti bápesa mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko na bango ya Yudea oyo bazalaki kokelela. Atindaki nde bandeko ya Korinti na makasi ete básala yango? Te, kutu akomaki boye: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” Tótalela naino toli yango malamumalamu.

“Ndenge akani na motema na ye.” Paulo amonisi ete mokristo ya solosolo apesaka mpo akani na “motema na ye” ete asala bongo. Na yango, mokristo akanisaka naino malamumalamu eloko oyo bandeko na ye bakristo basengeli na yango. Moto moko ya mayele alobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “akani” “elimboli kokanisa naino liboso ya kosala likambo.” Na yango, mokristo atalelaka bamposa ya bandeko na ye mpe amitunaka soki akoki kosala nini mpo na kosunga bango.​—1 Yoane 3:17.

“Na koimaima te to na kotindikama te.” Paulo alobeli lolenge mibale ya kopesa oyo bakristo ya solo basengeli koboya​—kopesa na kokakatana to na kotindikama. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koimaima” elimboli “kopesa kaka mpo na mawa ya Nzambe.” Buku moko elobi ete moto oyo apesaka na koimaima to na kokakatana, apesaka “na mpasi na motema, lokola nde azali kobwaka mbongo yango kobwaka.” Moto oyo apesaka na kotindikama, apesaka mpo batye ye mpanzi likoló ete asala bongo. Nani alingaka kozwa eloko oyo euti epai ya moto ya ndenge wana?

“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” Paulo alobaki ete soki mokristo azwi ekateli ya kopesa, asengeli kosala yango na esengo. Ya solo, kopesa na makanisi malamu epesaka esengo. (Misala 20:35) Esengo ya moto yango emonanaka polele. Kutu, liloba “esengo” ekoki komonisa ndenge oyo mopesi azali koyoka na motema, mpe ndenge elongi na ye ezali komonana ntango azali kopesa. Moto oyo apesaka na esengo asimbaka mitema ya bato. Asepelisaka mpe motema ya Nzambe. Libongoli mosusu elobi boye: “Nzambe alingaka bato oyo balingaka kopesa.”​—Biblia Contemporary English Version.

“Nzambe alingaka bato oyo balingaka kopesa”

Maloba oyo ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe ezali etinda oyo bakristo basengeli kolanda na likambo etali kopesa. Ezala tozali kopesa ntango, makasi to biloko na biso ya kobikela, tósalaka yango na bolingo na biso moko mpe mpo na koyoka esengo oyo eutaka na kokabela basusu, mingimingi baoyo bazali kokelela. Kosala bongo ekosepelisa kaka biso moko te kasi ekosala mpe ete Nzambe asepela na biso, mpo “alingaka moto oyo apesaka na esengo.”

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya libwa

1 mpe 2 Bakorinti