LISOLO YA BOMOI
Namipesaki mobimba na mosala ya Yehova
Ntango nasilisaki eteyelo ya ntei na sanza ya 01/1937, nakɔtaki na iniversite ya Iowa pene ya esika oyo tozalaki kofanda na wɛsti ya États-Unis. Lokola nazalaki kokende kelasi mpe kosala mpo na kofuta bakelasi na ngai, nazalaki na ntango mingi te mpo na makambo mosusu. Banda bomwana, nazalaki na mposa ya koyekola ndenge ya kotonga bandako ya etaje mpe bagbagba (ponts).
Na ebandeli ya 1942, mwa moke ntango États-Unis ekɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nalekisaki mbula mitano na iniversite mpe etikalaki kaka mwa basanza mpo nazwa diplome ya ingénieur na makambo ya kotonga. Nazalaki kofanda ná baninga mibale. Moko na bango ayebisaki ngai nasolola na moto oyo “ayaka kotala bana mibali oyo bazalaka na etaje ya nse.” Kuna nakutanaki na John (Johnny) Brehmer, oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Ndenge oyo azalaki kosalela Biblia mpo na koyanola na motuna nyonso, ekamwisaki ngai. Nasepelaki mingi, yango wana nabandaki koyekola Biblia na Johnny mbala na mbala mpe nsukansuka nakómaki kobima na ye na mosala ya kosakola ntango nazalaki kozwa likoki ya kosala yango.
Otto, tata ya Johnny, akómaki Motatoli ntango azalaki guvɛrnɛrɛ ya banki moko na engumba Walnut, na etúká ya Iowa. Otto atikaki mosala yango mpe akómaki kolekisa bangonga mingi na mosala ya kosakola. Na nsima, ndakisa na ye ya malamu mpe oyo ya libota na ye esalisaki ngai nazwa ekateli moko ya ntina mingi.
NTANGO YA KOZWA EKATELI
Mokolo moko, mokambi ya iniversite na biso ayebisaki ngai ete bapwɛ na ngai ezali moke mpenza mpe ete nakozwa diplome te na bapwɛ oyo nazalaki kozwa liboso. Nazali koyeba lisusu ndenge nabondelaki Yehova Nzambe makasi asalisa ngai. Mwa moke na nsima, bayebisaki ngai nakende kokutana na profesɛrɛ na biso ya ingénierie. Profesɛrɛ yango ayebisaki ngai ete batindelaki ye mokanda moko oyo emonisaki ete bazali na mposa ya ingénieur moko, mpe andimaki kozanga kutu atuna likanisi na ngai mpe ayebisaki bango ete nakondima mosala yango. Napesaki ye mersi, kasi namonisaki ye ntina oyo nalingaki komipesa mobimba na mosala ya Yehova. Na mokolo ya 17/06/1942, nazwaki batisimo mpe mbala moko nakómaki mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bato oyo balekisaka bangonga mingi na mosala ya kosakola.
Na nsima, batindelaki ngai mokanda moko oyo esɛngaki nakɔta mosala ya soda mpe nakendaki na biro na bango mpo na koyebisa ntina oyo nakokaki te kokende na bitumba mpo na lisosoli na ngai. Nalakisaki bango mikanda oyo baprofesɛrɛ ya iniversite bakomaki mpo na bizaleli na ngai ya malamu mpe mayele oyo nazalaki na yango na mosala ya ingénieur, mpo nakɔta na mosala ya soda te. Atako nalakisaki bango mikanda yango, bakatelaki ngai amande ya dolare 10 000 mpe mbula mitano ya bolɔkɔ na engumba Leavenworth, na etúká ya Kansas.
NA BOLƆKƆ
Bakatelaki bilenge koleka 230 oyo bazalaki Batatoli etumbu ya kokende kosala na ferme oyo ezalaki na
bolɔkɔ ya Leavenworth. Bazalaki kopesa biso misala na ferme yango mpe basoda mingi bazalaki kokɛngɛla biso. Bamosusu kati na bango bayebaki ete tokɔtaka te na makambo ya politiki mpe bazalaki kondima makanisi na biso.Mwa ndambo ya basoda yango basalisaki biso mpo tókoba kosalaka makita. Basalisaki mpe biso mpo tózwaka mikanda oyo elimbolaka Biblia. Kutu, mokɛngɛli ya bolɔkɔ asɛngaki bápesaka ye zulunalo Consolation (sikoyo ebengamaka Lamuká!).
NABIMI NA BOLƆKƆ MPE NABANDI MOSALA YA MISIONƐRƐ
Nsima ya kolekisa mbula misato na bolɔkɔ, nabimaki na mokolo ya 16/02/1946, mwa basanza nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mbala moko, nazongelaki lisusu kolekisa bangonga mingi na mosala ya kosakola. Basɛngaki ngai nazonga na Leavenworth, na Kansas. Nabangaki makasi mpo bato mingi bazalaki kokanisela Batatoli ya Yehova mabe na engumba wana. Kozwa mosala oyo ekokaki kosalisa ngai ezalaki mpasi, mpe kozwa esika ya kofanda ezalaki kutu mpasi koleka.
Nakanisaka lisusu ndenge soda moko oyo tokutanaki na ye agangelaki ngai boye: “Bimá na lopango na ngai!” Ntango namonaki asimbi nzete moko ya kilo, nabangaki mpe nabimaki noki. Na ndako mosusu, mwasi moko alobaki, “Zelá mwa moke,” mpe akangaki porte. Nazelaki tii na mbala moko fɛnɛtrɛ ya likoló efungwamaki mpe abwakelaki ngai mai ya salite oyo bautaki kosukola na yango basaani. Ata bongo, nazwaki mapamboli mingi na mosala na ngai ya kosakola. Na nsima, nayokaki ete bamosusu oyo napesaki mikanda oyo elimbolaka Biblia bakómaki Batatoli.
Na 1943, eteyelo moko ya sika mpo na bamisionɛrɛ efungwamaki na nɔrdi ya etúká ya New York. Babengisaki ngai nakɔta na eteyelo yango, mpe nazwaki diplome na kelasi ya zomi na mokolo ya 08/02/1948. Eteyelo yango ekómaki kobengama Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Nsima ya kozwa diplome, batindaki ngai na Côte d’Or, oyo eyebani lelo na nkombo Ghana.
Ntango nakómaki na Côte d’Or, mokumba na ngai ezalaki ya kosakwela bakonzi ya Leta mpe bato ya Mpoto. Na bawikende, nazalaki kosala elongo na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova mpe kobima na bandeko yango na mosala ya kosakola ndako na ndako. Nazalaki mpe kokende kotala bandeko oyo bazalaki kofanda bango moko na bateritware ya mosika mpe kopesa bango formasyo na mosala ya kosakola. Lisusu, nazalaki kokende kolendisa bandeko na masangá oyo ezalaki pene ya Côte d’Ivoire.
Ntango nazalaki kosala na bateritware yango, nakómaki mpenza kosala makambo lokola bana-mboka ya Afrika; kolala na ndako ya mabele, kolya na mabɔkɔ, mpe kosala zongo “libándá” ndenge Bayisraele bazalaki kosala ntango bazalaki na esobe. (Kolimbola Mibeko 23:12-14) Kosala bongo esalaki ete bákóma koloba malamu mpo na ngai ná bamisionɛrɛ mosusu oyo tozalaki kosala na bango. Basi ya bakonzi mosusu ya Leta bakómaki koyekola Biblia na biso. Na yango, ntango banguna batyaki biso mobulu mpe batyaki bakonzi mpanzi likoló mpo báboya baviza na biso, basi ya bakonzi yango bakɔtelaki biso epai ya mibali na bango mpe ekateli yango ebongwanaki!
Ndenge ekómelaka bamisionɛrɛ mingi na Afrika, nsukansuka nabɛlaki malaria. Nazalaki kolɛnga mpe koyoka fiɛvrɛ, mpe yango esalaki ete naloba mpe nakanisa lisusu malamu te. Na bantango mosusu, esengelaki nasimbaka mbanga na ngai mpo etika kolɛnga. Ata bongo, nazalaki kaka na esengo na mosala yango.
Na boumeli ya mbula minei ya liboso oyo nalekisaki na Afrika, nazalaki kosolola na Eva Hallquist, oyo nakutanaki na ye liboso nalongwa États-Unis. Nayokaki ete asengelaki kozwa diplome ya kelasi ya 21 ya Eteyelo ya Gileade na mokolo ya 19/07/1953, na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaka bato ya bikólo ndenge na ndenge, na Yankee Stadium na New York. Nayokanaki na kapitɛni ya masuwa moko mpo nasala na masuwa na ye na esika nafuta mbongo ya tike ya kokende na États-Unis.
Nsima ya kolekisa mikolo 22 na mbu oyo na bantango mosusu ezalaki na mipɛpɛ makasi, nakómaki na États-Unis mpe nakendaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, mpo na kokutana na Eva. Kuna, ntango tozalaki likoló ya ndako moko epai okoki komona malamu engumba New York mpe libongo na yango, natunaki ye libala. Na nsima, Eva alandaki ngai na Côte d’Or mpe tokómaki kosala elongo.
KOKOKISA MIKUMBA YA LIBOTA
Nsima ya kosala ná Eva bambula mingi na Afrika, mama atindelaki ngai mokanda mpo na koyebisa ngai ete papa azalaki kobɛla kanser mpe akómaki pene ya liwa. Ngai ná Eva tozwaki konje, mpe tozongaki na États-Unis. Maladi ya papa eyaki makasi, mpe eumelaki te akufaki.
Na nsima, ntango tozongaki na Ghana, nsima ya mbula minei, tozwaki mpe nsango ete mama akómaki kobɛla makasi. Baninga na biso mosusu bayebisaki ngai ná Eva tózonga mpo na kobatela mama. Ekateli yango ezalaki pɛtɛɛ te. Nsima ya kolekisa mbula 4 ngai moko na mosala ya misionɛrɛ mpe mbula 11 elongo na Eva, tozongaki na États-Unis.
Na boumeli ya bambula mingi, tozalaki kobatela mama, moto na moto na ngala na ye; tozalaki komema ye na makita ntango azalaki koyoka mwa malamu. Na mokolo ya 17/01/1976, akufaki ntango azalaki na mbula 86. Kasi, nsima ya mbula 9, likambo moko ya mpasi koleka ekómelaki biso. Bazwaki Eva na maladi ya kanser. Azwaki bankisi ya ndenge nyonso mpo na maladi yango, kasi nsukansuka akufaki na mokolo ya 04/06/1985 ntango azalaki na mbula 70.
BAMBONGWANA MOSUSU OYO NAKUTANAKI NA YANGO
Na 1988, babengisaki ngai na molulu ya kofungola biro ya sika ya Batatoli ya Yehova na Ghana. Ezalaki molulu moko oyo nakoki kobosana te! Mbula 40 liboso, ntango nakómaki na Ghana nsima ya kozwa diplome ya Gileade, Batatoli bazalaki kaka mwa bankama. Na 1988, bazalaki koleka 34 000, mpe lelo oyo bakómi pene na 114 000!
Mbula mibale nsima ya kosala mobembo wana na Ghana, nabalaki Betty Miller, moninga ya motema ya Eva, mokolo ya 06/08/1990. Tokobaki komipesa elongo na mosala ya Yehova na bomoi na biso. Tozali kozela na motema likoló mokolo oyo tokokutana lisusu na bankɔkɔ na biso, baboti na biso mpe na Eva na paradiso.—Misala 24:15.
Soki nakanisi libaku monene oyo Yehova apesi ngai ya kosalela ye bambula koleka 70, mai ya miso ebimaka ngai. Napesaka ye ntango nyonso mersi ndenge asalisi ngai namipesa mobimba na mosala na ye. Atako sikoyo nakómi na mbula mwa moke koleka 90, Yehova, motongi monene ya molɔ́ngɔ́, azali kaka kopesa ngai makasi mpe mpiko mpo nakoba komipesa na mosala na ye.