Oyebaki yango?
Bato ya kala bazalaki kosala nini mpo bamasuwa na bango ekɔta mai te?
Lionel Casson, moto moko ya mayele na makambo etali bamasuwa ya kala, alobeli ndenge basali-masuwa na Roma bazalaki kosala nsima ya kobamba madusu ya masuwa. Bazalaki na momeseno ya “kopakola gudrɔ mpe mafuta na madusu ya masuwa to na libanda na yango mobimba mpe bazalaki kopakola mosusu na kati.” Liboso kutu bato ya Roma basala bongo, Baakkadien mpe bato ya Babilone bazalaki mpe kosalela gudrɔ mpo mai ekɔta te na bamasuwa na bango.
Makomami ya Ebre elobeli mpe mayele ya ndenge wana na Ebandeli 6:14. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “gudrɔ” ezali basalite ya petrole.
Gudrɔ yango ezalaka ya lolenge mibale—ya mai mpe ya kokangama. Basali-masuwa na ntango ya kala bazalaki kosalela oyo ya maimai, bazalaki kopakola yango mbala moko na bamasuwa na bango. Nsima ya kopakola yango ezalaki kokauka mpe kokóma makasi mpe kosala ete mai ekɔta te.
Na ntango ya kala gudrɔ ezalaki ebele mpenza na mikili oyo Biblia elobeli. Lobwaku ya Sidime, oyo ezali zingazinga ya Mbu ekufá “ezalaki na mabulu mingi ya gudrɔ.”—Ebandeli 14:10.
Mayele nini bazalaki kosalela na ntango ya kala mpo mbisi epɔla te?
Banda kala mbisi ezalaka bilei ya ntina mingi. Bantoma mosusu ya Yesu bazalaki babomi-mbisi na Mbu ya Galile liboso babanda kotambola na Yesu. (Matai 4:18-22) Bazalaki komema bambisi yango mosusu na “baizine” oyo ezalaki penepene mpo na kobongisa yango.
Tii lelo basalelaka mayele oyo bato ya Galile bazalaki kosalela mpo mbisi epɔla te na bisika mosusu. Bazalaki naino kolongola basalite na mbisi mpe na nsima kosukola yango. Buku moko Studies in Ancient Technology elobi boye: “Bazalaki kopakola yango mungwa bisika nyonso. Bazalaki naino kosopa mungwa na litɔkɔ mpe na nsima kotanda mbisi, kosopa lisusu mungwa likoló ya mbisi yango mpe kozipa yango na litɔkɔ oyo ekauká. soki basali bongo, nsima ya mikolo 3 tii 5 bazalaki kobalola yango mpe kotika yango ndenge wana na boumeli ya mikolo 3 tii 5 lisusu. Ntango bazalaki kokaukisa mbisi ndenge wana, ezalaki kobimisa mai mpe mungwa ezalaki kokɔta na mbisi. Nsima ya kokaukisa mbisi ndenge wana ezalaki kokóma makasi.”
Toyebi te soki mayele wana ezalaki kosala ete mbisi ebatelama tii ntango boni. Lokola bato ya kala ya Ezipito bazalaki kokende kotɛka mbisi yango na Siri, yango emonisi ete mayele wana ezalaki kosimba mpenza.