MITUNA YA BATÁNGI . . .
Makambo oyo etali fɛti ya Noele
Bamilio ya bato na mokili mobimba basalaka fɛti ya Noele mpo na bantina ekeseni. Bamosusu basepelaka kolekisa ntango ná baninga mpe bandeko. Bato mosusu basalelaka ntango yango mpo na kokanisa Nzambe to kosunga babola. Na ntembe te, kosala makambo ya malamu ndenge wana ezali mabe te. Kasi, ezali makambo mabe oyo etali fɛti yango nde ezali kobebisa makambo.
Ya liboso, bato mingi oyo basalaka fɛti yango bakanisaka ete ezali fɛti ya mbotama ya Yesu. Nzokande, bato ya istware bamonisi mpenza ete dati ya mbotama ya Yesu eyebani te. Buku moko (The Christian Book of Why) elobi ete “bakristo ya liboso baboyaki kotya dati moko oyo etali mbotama ya Yesu” mpo balingaki mpenza “kokabwana na misala nyonso ya bapakano.” Kutu, Biblia emonisi ata esika moko te ete Yesu asalaki fɛti ya mbotama na ye moko to ya moto mosusu. Alobaki na bayekoli na ye bákanisaka nde liwa na ye.—Luka 22:19.
Ya mibale, bato mingi ya mayele bamonisi ete makambo mingi oyo esalemaka na Noele eutá nde na mimeseno ya bapakano. Na ndakisa, Père Noele, kosalela bitape ya nzete ya gui mpe nzete ya Noele, kopesana bakado, kotumba babuji mpe kodiembelisa ba-couronne oyo batyá mayemi mpe koyemba. Buku moko (The Externals of the Catholic Church) elobi boye mpo na mwa mimeseno yango: “Ntango topesaka mpe tozwaka bakado ya Noele mpe todiembelisaka ba-couronne ya ngɛlingɛli na bandako mpe na baeglize, bato boni bayebaka ete tozali komekola mimeseno ya bapakano?”
“Ntango topesaka mpe tozwaka bakado ya Noele mpe todiembelisaka ba-couronne ya ngɛlingɛli na bandako mpe na baeglize, bato boni bayebaka ete tozali komekola mimeseno ya bapakano?”—The Externals of the Catholic Church
Kasi, okoki komituna soki mabe ezali wapi kolanda mimeseno wana oyo ezali komonana ete ezali mabe te. Tótalela likambo ya misato oyo epesi eyano. Nzambe andimaka te kosangisa mimeseno ya bapakano ná losambo ya solo. Na nzela ya mosakoli Amose, Yehova Nzambe ayebisaki basambeli na ye ya Yisraele oyo babungaki nzela boye: “Nayiná, naboyá bafɛti na bino . . . Longolá liboso na ngai makɛlɛlɛ ya nzembo na yo.”—Amose 5:21, 23.
Mpo na nini maloba makasi bongo? Tótala makambo oyo bato ya mabota ya bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele bazalaki kosala. Yeroboame, mokonzi na bango ya liboso, atɛlɛmisaki bikeko ya wolo na bingumba ya Dani mpe Betele mpe atindaki bango básambela yango na esika ya kosambela Yehova Nzambe na tempelo ya Yerusaleme. Mokonzi yango abandisaki bafɛti mpe atyaki banganga-nzambe mpo básalisaka bato básalaka bafɛti yango.—1 Bakonzi 12:26-33.
Oyo Bayisraele wana basalaki emonanaki lokola likambo ya malamu. Kutu, bazalaki kosala makambo wana nyonso mpo na kosambela mpe kosepelisa Nzambe. Maloba makasi oyo Nzambe alobaki na nzela ya Amose mpe basakoli mosusu emonisi polele ndenge oyo Nzambe amiyokaki mpo na makambo wana. Na nzela ya mosakoli Malaki, Nzambe alobaki boye: “Ngai nazali Yehova; nabongwani te.” (Malaki 3:6) Yango emonisi mpenza ndenge Nzambe ayokaka mpo na makambo mingi oyo esalemaka na fɛti ya Noele.
Nsima ya kotalela makambo oyo touti kolobela, bato mingi bazwaki ekateli ya koboya kosala fɛti ya Noele. Basepelaka mingi nde kolekisa ntango ná baninga mpe bato ya mabota na bango mpe kosalisa babola na ntango nyonso oyo balingi kosala yango na boumeli ya mbula.