Emoniseli epai ya Yoane 8:1-13

  • Elembo ya nsambo efungwami (1-6)

  • Kobɛtama ya kelelo minei ya liboso (7-12)

  • Mawa misato eyebisami (13)

8  Ntango Mwana-Mpate+ afungolaki elembo ya nsambo,+ likoló efandaki nyɛɛ na boumeli soki ya ndambo ya ngonga moko.  Mpe namonaki baanzelu nsambo+ oyo batɛlɛmi liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo nsambo.  Anzelu mosusu oyo asimbaki esaleli ya wolo ya mpaka ya malasi, ayaki mpe atɛlɛmaki na etumbelo;+ bapesaki ye ebele ya mpaka ya malasi+ mpo na kopesa yango likabo esika moko na mabondeli ya basantu nyonso likoló ya etumbelo ya wolo+ oyo ezalaki liboso ya kiti ya bokonzi.  Milinga ya mpaka ya malasi eutaki na lobɔkɔ ya anzelu yango emati nzela moko na mabondeli+ ya basantu liboso ya Nzambe.  Kasi na mbala moko anzelu yango azwaki esaleli wana ya mpaka ya malasi, mpe atondisaki yango na mwa ndambo ya mɔtɔ ya etumbelo wana mpe abwakaki yango na mabele. Mpe bankake ebɛtaki, mingongo eyokanaki, mikalikali+ ebimaki mpe mabele eninganaki.  Mpe baanzelu nsambo oyo bazalaki na bakelelo nsambo+ bamibongisaki mpo na kobɛta yango.  Oyo ya liboso abɛtaki kelelo na ye. Mpe mbula ya mabanga ebɛtaki ná mɔtɔ esanganá na makila, mpe ebwakamaki na mabele;+ mpe moko ya bandambo misato ya mabele ezikaki, moko ya bandambo misato ya banzete ezikaki, mpe matiti nyonso ya mobesu ezikaki.+  Anzelu ya mibale abɛtaki kelelo na ye. Mpe eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela mɔtɔ ebwakamaki na mbu.+ Mpe moko ya bandambo misato ya mbu ekómaki makila;+  moko ya bandambo misato ya bikelamu ya bomoi oyo ezalaka na mbu* ekufaki,+ mpe moko ya bandambo misato ya bamasuwa ebebaki. 10  Anzelu ya misato abɛtaki kelelo na ye. Mpe monzoto moko monene oyo ezalaki kopela lokola mwinda eutaki na likoló ekwei, mpe ekwelaki moko ya bandambo misato ya bibale mpe maziba ya mai.+ 11  Nkombo ya monzoto yango ezali Mbondo. Mpe moko ya bandambo misato ya mai ekómaki mbondo, mpe bato mingi bakufaki mpo na mai yango, mpo ekómaki bololo.+ 12  Anzelu ya minei abɛtaki kelelo na ye. Mpe moko ya bandambo misato ya moi ná moko ya bandambo misato ya sanza ná moko ya bandambo misato ya minzoto ebebisamaki,+ mpo moko ya bandambo na yango misato eyinda+ mpe moko ya bandambo misato ya mokolo ezala na pole te na moi, ná butu mpe ndenge moko. 13  Namonaki, mpe nayokaki mpongo moko oyo ezalaki kopumbwa na katikati ya likoló elobi na mongongo makasi ete: “Mawa, mawa, mawa+ na bato oyo bafandi na mabele mpo na bakelelo oyo etikali, oyo baanzelu misato balingi kobɛta!”+

Maloba na nse

To, “bikelamu oyo ezalaka na mbu oyo ezali na milimo.”