Ndenge ekomamá na Luka 9:1-62

  • Bantoma 12 bazwi malako mpo na mosala ya kosakola (1-6)

  • Erode azali komituna mituna mpo na Yesu (7-9)

  • Yesu aleisi mibali 5 000 (10-17)

  • Petro alobi ete Yesu azali Kristo (18-20)

  • Yesu alobeli liwa na ye (21, 22)

  • Kozala moyekoli ya solosolo (23-27)

  • Kobongwana ya Yesu (28-36)

  • Yesu abikisi mwana moko oyo azalaki na demo (37-43a)

  • Yesu alobeli lisusu liwa na ye (43b-45)

  • Bayekoli batyani ntembe mpo na koyeba nani aleki baninga (46-48)

  • Moto oyo azali kotɛlɛmɛla biso te azali na ngámbo na biso (49, 50)

  • Bato ya mboka moko ya Samaria baboyi Yesu (51-56)

  • Ndenge ya kolanda Yesu (57-62)

9  Bongo abengaki bantoma zomi na mibale mpe apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana bademo nyonso+ mpe ya kobikisa bamaladi.+  Mpe atindaki bango bákende kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa bato ya maladi.  Alobaki na bango: “Bómema eloko te mpo na mobembo: lingenda te, saki ya bilei te, limpa te, mbongo* te; bózwa mpe bilamba mibale* te.+  Kasi esika nyonso oyo bokokɔta na ndako moko, bófanda wana tii bokolongwa wana.+  Epai nyonso oyo bato bayambi bino te, ntango bozali kobima na engumba yango, bópupola putulu ya makolo na bino mpo ezala litatoli epai na bango.”+  Bongo basimbaki nzela bakei mpe bazalaki koleka mboka na mboka, kosakola nsango malamu mpe kobikisa bato na bisika nyonso.+  Nzokande Erode,* moyangeli ya etúká* ya Galile, ayokaki nsango ya makambo nyonso oyo ezalaki kosalema, mpe abulunganaki mpenza mpo bato mosusu bazalaki koloba ete Yoane alamuki na liwa,*+  kasi basusu bazalaki koloba ete Eliya abimi, mpe basusu ete moko ya basakoli ya kala asekwi.+  Erode alobaki: “Ngai nakataki Yoane motó.+ Bongo moto oyo nazali koyoka na nsango, ezali nani?” Na yango azalaki koluka komona ye.+ 10  Ntango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo nyonso oyo basalaki.+ Bongo azwaki bango mpe akendaki na bango na engumba oyo babengi Betesaida, mpo bázala kaka bango moko.+ 11  Kasi ntango ebele ya bato bayokaki yango, balandaki ye. Ayambaki bango na boboto mpe abandaki koyebisa bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Abikisaki mpe baoyo bazalaki na mposa ya kobikisama.+ 12  Ntango moi ebandaki kolala, bantoma zomi na mibale bayaki mpe balobaki na ye: “Yebisá ebele ya bato oyo bázonga, bákende na bamboka mpe na bisika oyo bato basalaka bilanga oyo ezali zingazinga, mpo na koluka esika ya kolala mpe biloko ya kolya, mpo awa tozali na esika oyo bato bazalaka te.”+ 13  Kasi alobaki na bango: “Bino moko bópesa bango eloko ya kolya.”+ Bango balobaki: “Tozali na eloko te kaka mampa mitano mpe mbisi mibale, lobá mbala mosusu biso moko tókende kosombela bato nyonso oyo biloko ya kolya.” 14  Nzokande, ezalaki na mibali soki 5 000. Kasi alobaki na bayekoli na ye: “Bófandisa bango na bituluku ya bato soki 50.” 15  Basalaki kaka bongo mpe bafandisaki bato nyonso. 16  Bongo azwaki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, atalaki na likoló, mpe apambolaki yango. Na nsima abukaki yango mpe abandaki kopesa yango bayekoli mpo bákabolela yango ebele ya bato. 17  Bongo bango nyonso balyaki mpe batondaki, mpe basangisaki biteni ya mampa oyo etikalaki, etondisaki kitunga 12.+ 18  Na nsima, ntango azalaki kobondela kaka ye moko, bayekoli bayaki epai na ye, mpe atunaki bango motuna, alobi: “Ebele ya bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”+ 19  Bango bazongisaki: “Yoane Mobatisi, kasi basusu bazali koloba, Eliya, basusu mpe bazali koloba moko ya basakoli ya kala asekwi.”+ 20  Bongo atunaki bango: “Bongo bino bolobi ete ngai nazali nani?” Petro ayanolaki: “Kristo ya Nzambe.”+ 21  Na yango abendaki bango matoi mpe apesaki bango mitindo ete báyebisa moto moko te,+ 22  kasi alobaki: “Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi. Akoboyama na bankulutu, banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli, akobomama,+ mpe na mokolo ya misato akosekwa.”+ 23  Bongo alobaki na bato nyonso boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko+ mpe amema nzete na ye ya mpasi* mokolo na mokolo mpe akoba kolanda ngai.+ 24  Mpo moto oyo alingi kobikisa bomoi* na ye akobungisa yango; kasi moto oyo abungisi bomoi* na ye mpo na ngai ye nde akobikisa yango.+ 25  Mpo litomba nini moto akozala na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi na ye to azwi likama?+ 26  Mpamba te moto oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai, Mwana ya moto akoyoka moto yango nsɔni ntango akoya na nkembo na ye mpe na oyo ya Tata mpe ya baanzelu basantu.+ 27  Kasi ya solo nazali koyebisa bino, bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakokufa naino te liboso ete bámona Bokonzi ya Nzambe.”+ 28  Na yango, mikolo soki mwambe nsima ya koloba maloba wana, azwaki Petro, Yoane ná Yakobo mpe amataki na bango na ngomba mpo na kobondela.+ 29  Mpe ntango azalaki kobondela, elongi na ye ebongwanaki mpe bilamba na ye ekómaki mpɛmbɛ makasi. 30  Mpe talá! mibali mibale bazalaki kosolola na ye: ezalaki Moize ná Eliya. 31  Bamonanaki na nkembo mpe babandaki kolobela kokende na ye, oyo esengelaki kosalema na Yerusaleme.+ 32  Nzokande Petro ná bayekoli wana mosusu mibale bazalaki kobunda na mpɔngi. Kasi ntango balamukaki mpenza bamonaki nkembo na ye+ mpe mibali yango mibale batɛlɛmi elongo na ye. 33  Mpe ntango mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petro alobaki na Yesu: “Molakisi, ezali malamu tózala awa, boye tótɛlɛmisa bahema misato, moko mpo na yo, moko mpo na Moize mpe moko mpo na Eliya.” Azalaki koyeba te makambo azalaki koloba. 34  Kasi ntango azalaki koloba makambo wana, lipata moko esalemaki mpe ebandaki kozipa bango. Ntango bakɔtaki na lipata yango, babandaki kobanga. 35  Mpe mongongo moko+ eutaki na lipata yango mpe elobaki: “Oyo azali Mwana na ngai, oyo ngai naponi.+ Bóyoka ye.”+ 36  Ntango mongongo wana ezalaki koloba, bamonaki Yesu kaka ye moko. Kasi bafandaki nyɛɛ mpe bayebisaki ata moto moko te na mikolo yango makambo oyo bamonaki.+ 37  Na mokolo oyo elandaki, ntango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu.+ 38  Mpe talá! mobali moko na kati ya ebele ya bato wana abelelaki: “Moteyi, nabondeli yo, osalisa* mwana na ngai, mpo azali mwana na ngai kaka moko.+ 39  Elimo moko ekangaka ye, mpe mwana akómaka koganga. Elimo yango eningisaka ye makasi mpe ebimisaka ye fulufulu na monɔkɔ, mpe ebimaka na mpasi mpenza nsima ya kozokisazokisa ye. 40  Nabondelaki bayekoli na yo bábimisa yango, kasi bakokaki te.” 41  Bongo Yesu alobaki: “Ee libota ezangá kondima mpe ebebá,+ tii ntango nini nasengeli kozala na bino mpe kokanga motema na makambo na bino? Memá mwana na yo awa.”+ 42  Kasi ata ntango mwana yango azalaki kopusana, demo yango abwakaki ye na nse mpe aningisaki ye makasi mpenza. Kasi, Yesu apamelaki elimo yango ya mbindo, abikisaki mwana yango ya mobali mpe apesaki ye epai ya tata na ye. 43  Mpe bato nyonso bakamwaki nguya monene wana ya Nzambe. Wana bango nyonso bazalaki kokamwa na makambo nyonso oyo azalaki kosala, Yesu alobaki na bayekoli na ye: 44  “Bóyoka na likebi mpe bóbosana maloba oyo te: Mwana ya moto akotɛkama na mabɔkɔ ya bato.”+ 45  Kasi bakangaki ntina te ya makambo oyo azalaki koloba. Kutu, likambo yango ebombamaki mpo básosola yango te, mpe babangaki kotuna ye mituna mpo na yango. 46  Bongo babandaki kowelana mpo na koyeba nani na kati na bango aleki basusu.+ 47  Lokola Yesu ayebaki makambo oyo ezalaki na mitema na bango, azwaki mwana moko ya moke, mpe atɛlɛmisaki ye pene na ye, 48  mpe alobaki na bango: “Moto oyo ayambi mwana oyo ya moke mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai; mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai.+ Mpo moto oyo azali komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.”+ 49  Bongo Yoane alobaki: “Molakisi, tomonaki moto moko azali kobimisa bademo na nkombo na yo mpe tomekaki kopekisa ye, mpo azali kolanda yo te elongo na biso.”+ 50  Kasi Yesu alobaki na ye: “Bómeka kopekisa ye te, mpo moto oyo azali kotɛmɛla bino te azali na ngámbo na bino.” 51  Lokola mikolo ya komata na ye ekómaki pene,*+ azalaki na ekateli makasi ya* kokende na Yerusaleme. 52  Bongo atindaki bamemi-nsango bákende liboso na ye. Bakendaki mpe bakɔtaki na mboka moko ya Basamaria mpo bábongisa koya na ye. 53  Kasi bayambaki ye te,+ mpo azalaki na ekateli ya kokende na Yerusaleme. 54  Ntango bayekoli na ye, Yakobo ná Yoane,+ bamonaki bongo, balobaki: “Nkolo, olingi tópesa mitindo ete mɔtɔ euta na likoló mpe esilisa bango?”+ 55  Kasi abalukaki mpe apamelaki bango. 56  Mpe bakendaki na mboka mosusu. 57  Nzokande ntango bazalaki kotambola na nzela, moto moko alobaki na ye: “Nakolanda yo epai nyonso okokende.” 58  Kasi Yesu alobaki na ye: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu,* kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.”+ 59  Na nsima alobaki na mosusu: “Landá ngai.” Moto yango alobaki: “Nkolo, pesá ngai naino nzela nakende kokunda tata na ngai.”+ 60  Kasi alobaki na ye: “Tiká bakufi+ bákunda bakufi na bango, kasi yo kende kosakola Bokonzi ya Nzambe bipai nyonso.”+ 61  Mpe moto mosusu alobaki: “Nakolanda yo, Nkolo, kasi pesá ngai naino nzela ya kopesa bato ya ndako na ngai mbote ya nsuka.” 62  Yesu alobaki na ye: “Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima+ abongi na Bokonzi ya Nzambe te.”+

Maloba na nse

Lil., “palata.”
To, “elamba mosusu.”
Elingi koloba, Erode Antipasi. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “tetrarke.”
To, “asekwi.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “obwakela ye liso.”
Lil., “elingaki kokoka.”
Lil., “elongi na ye etalaki mpo na.”
To, “bazála.”