Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

YURI LASHOV/AFP via Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA

Bakristo basengeli kokɔta na bitumba?​—Biblia elobi nini?

Bakristo basengeli kokɔta na bitumba?​—Biblia elobi nini?

 Ndenge bitumba oyo ezali kosalema na Ukraine emonisi yango, bakonzi mingi ya mangomba ya bokristo bazali kopesa bitumba mabɔkɔ. Talá makambo oyo emonisi ete bakonzi ya mangomba bazali kolendisa bikólo yango nyonso mibale ebunda:

  •   “Topesi basoda na biso nyonso matondi mpe longonya mpenza ndenge bazali kobundela ekólo na biso Ukraine mpo monguna azwa yango te . . . Bóyeba ete tozali ntango nyonso kobondela mpo na bino, mpe tozali pene mpo na kosalisa bino.”​—Maloba ya Métropolite Épiphane I ya Kyiv, ndenge zulunalo The Jerusalem Post, emonisaki yango na mokolo ya 16/03/2022.

  •   “Mokonzi ya lingomba ya Orthodox ya Russie asalaki molulu moko mpo na basoda ya Russie na mokolo ya lomingo epai wapi asɛngaki basoda yango bábunda mpo na kokɔtela ekólo na bango mpo ‘kaka bana-mboka ya ekólo Russie nde bakoki kosala yango’ wana Moscou ezali kokoba kobunda na Ukraine.”​—Agence Reuters, 03/04/2022.

 Bakristo basengeli kokɔta na bitumba? Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini mpo na yango?

 Biblia elobaka ete baoyo batosaka mpenza Yesu Kristo bakɔtaka na bitumba te.

  •   “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.”​—Matai 26:52.

     Soki moto moko azali kopesa mabɔkɔ na bitumba to kokɔta na bitumba, moto yango azali mpenza kotosa maloba ya Yesu?

  •   “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:34, 35.

     Soki moto moko azali kopesa mabɔkɔ na bitumba tokoki koloba ete azali komonisa bolingo oyo Yesu alobaki ete esengeli kozala elembo ya bayekoli na ye, to basaleli na ye?

 Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Bitumba ezali malamu mpo na bakristo?

Bakristo basengeli kokɔta na bitumba lelo oyo?

 Ebongi mpenza bakristo báboya kokɔta na bitumba lelo? Ɛɛ. Biblia esakolaki ete tozali na “mikolo ya nsuka.” Na eleko yango, ekozala na bato na bikólo nyonso oyo ‘bakoyekola etumba lisusu te’; likambo yango eyokani mpenza na mateya ya Yesu.​—Yisaya 2:2, 4.

  •   Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá masolo ya Linɔìngi ya Mosɛnzɛli oyo elobi “Ndenge nini Nzambe atalelaka bitumba?”.

 Mosika te Yehova, a “Nzambe ya kimya,” akosalela guvɛrnema na ye ya likoló mpo na kolongola bato na “monyoko mpe na mobulu.”—Bafilipi 4:9; Nzembo 72:14.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.