Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BÓSƐNZƐLAKA!

Mpo na nini bizaleli ya bato ebebi boye?​—Biblia elobi nini?

Mpo na nini bizaleli ya bato ebebi boye?​—Biblia elobi nini?

 Bizaleli ya bato ezali kobeba se kobeba. Na bisika mingi na mokili okomona, bato ya maladi bazali kotombokela minganga; ba-client ya lofundo bazali kongangela basali ya restora; bato ya mobembo bazali kotombokela baoyo basalaka na kati ya avion; bana kelasi ya mobulu bazali kotyola, kobangisa, mpe kobundisa balakisi; bato ya politiki mosusu bazali kosala makambo ya nsɔni mpe basusu bazali koluka kolongisa bizaleli na bango ya mabe.

 Biblia ezali buku oyo ebongi mpo na koyebisa biso bizaleli oyo ezali mpenza malamu. Emonisi mpe ntina oyo bizaleli ya bato ebebi mingi lelo oyo.

Mpo na nini bizaleli ya bato ebebi boye?

 Kobeba ya bizaleli ya bato ezali komonana na mokili mobimba.

  •   Na kotalela lapolo ya ankɛtɛ ya Gallup, bato ya États-Unis d’amérique bamoni ete bizaleli ya bato na États-Unis ebebi makasi koleka ndenge ezalaki na bambula 22 oyo euti koleka.

  •   Na ankɛtɛ mosusu oyo esalemaki na bato koleka 32 000 na bikólo 28, 65% ya bato balobi ete bizaleli ya bato ebebi na ndenge moko oyo etikalá kosalema te.

 Biblia esakolaki kobebisama ya bizaleli ya bato ndenge tozali komona yango lelo oyo.

  •   “Mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi. Bato bakokóma komilinga bobele bango moko, bakozala na lokoso ya mbongo, lofundo pe lolendo. . . . kotsiola, kozanga botosi . . . Bakobanda kondimela baboti na bango té, koboya kopesa mersi . . . bato ya nko . . . bakotomboka pe kokangala.”​—2 Timote 3:1-3, Bible na Lingala ya lelo oyo.

 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali kokokisama ya esakweli yango, tángá lisolo “Biblia esakolaki makambo oyo bato bazali kokanisa mpe kosala lelo oyo?

Buku oyo ebongi mpo na koyebisa biso bizaleli oyo ezali mpenza malamu

 Na mokili oyo epai bizaleli ya bato ezali kobeba se kobeba, bamilio ya bato bamoni ete Biblia ebongi mpo na kolakisa biso bizaleli oyo ebongi mpenza. Batoli na yango “ebongi kotyelama motema sikoyo mpe mpo na libela.” (Nzembo 111:8) Tótalela mwa bandakisa:

  •   Oyo Biblia elobi: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango yango.”​—Matai 7:12.

     Ndimbola: Tosengeli kosalela bato makambo na boboto mpe na limemya, kaka ndenge tolingaka básalela mpe biso.

  •   Oyo Biblia elobi: “Sikoyo lokola bobwaki lokuta, bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye.”​—Baefese 4:25.

     Ndimbola: Tosengeli kozala sembo na makambo nyonso oyo tolobaka mpe oyo tosalaka.

 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali lisolo oyo, tángá: