Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ismail Sen/Anadolu Agency via Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Koningana monene ya mabele esalemi na Turquie mpe na Syrie​—Biblia elobi nini?

Koningana monene ya mabele esalemi na Turquie mpe na Syrie​—Biblia elobi nini?

 Na mokolo ya 06/02/2023, koningana monene ya mabele esalemaki na Turquie mpe na Syrie.

  •   “Na mokolo ya yambo, koningana monene ya mabele ebomaki bato koleka 3 700, ezwaki eteni monene ya Turquie mpe nɔrdi-wɛsti ya Syrie. Yango esalemaki ntango malili ezalaki makasi, mpe ekómisi makambo mpasi mpo na bankóto ya bato oyo bazoki mpe oyo bandako ebukani. Malili yango esali mpe ete ezala mpasi mpo na komona baoyo babiki.”​—Reuters, 06/02/2023.

 Tozali mpenza na mawa ntango tozali kotánga likambo ya mpasi bongo. Na bantango ya boye, tokoki kotya motema epai ya Yehova a oyo azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Bakorinti 1:3) Apesaka biso “libɔndisi oyo euti na Makomami [mpo] tózala na elikya.”​—Baroma 15:4.

 Biblia esalisaka biso tóyeba:

  •   Makambo oyo esakolamaki mpo na koningana ya mabele.

  •   Epai tokoki kozwa libɔndisi mpe elikya.

  •   Ndenge Nzambe akosilisa mpasi nyonso.

 Mpo na koyeba oyo Biblia elobi mpo na masolo wana, tángá masolo oyo elandi:

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzambe 83:18.