Lakisá makambo oyo ezali na kati

15/10/2018
HAÏTI

Mabele eninganaki makasi na nɔrdi ya Haïti

Mabele eninganaki makasi na nɔrdi ya Haïti

Mabele eninganaki makasi na nɔrdi ya Haïti na mokolo ya 06/10/2018 mpe ebomaki bato 17 mpe bato mosusu koleka 300 bazokaki.

Bansango oyo tozwi emonisi ete ata ndeko moko te akufi na likama yango, kasi basakoli mibale bazokaki mwa bampota. Balapolo ya liboso oyo bakɛngɛli ya zongazonga batindaki emonisi ete bandako 44 mpe Bandako ya Bokonzi 4 ebebaki. Na engumba Port-de-Paix, bandeko mibali soki 50 mpe bato ya mabota na bango batikaki bandako na bango mpo na komibatela epai mosusu mpo na koningana wana ya mabele. Bandeko ya lisangá bazali kokipe mabota yango. Ndeko moko ya komite ya filiale ya Haïti ná bandeko mibale ya Departema ya kosala baplan mpe ya kotonga na mboka yango bakendaki kotala esika oyo mabele eninganaki mpo na koyeba makama oyo yango ebimisi mpe mpo na kolendisa bandeko. Basalaki komite ya kopesa lisungi mpo na kobongisa ndenge ya kopesa lisungi oyo esengeli.

Tozali kokoba kokanisa bandeko na biso na Haïti mpe kobondela mpo na bango. Tozali na botɔndi ndenge Tata na biso ya likoló oyo alingaka biso alaki kobɔndisa basaleli na ye ya sembo na kolanda motema boboto na ye.​—Nzembo 119:76.