Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Bafilipi 4:6, 7​—“Bómitungisa ata na likambo moko te”

Bafilipi 4:6, 7​—“Bómitungisa ata na likambo moko te”

 “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Bomitungisa mpɔ na likambo mɔkɔ tɛ nde kati na makambo yɔnsɔ tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabɔndɛli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimia na Nzambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ, ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7, Biblia Haut-fleuve.

Ndenge Bafilipi 4:6, 7 elimbolami

 Basambeli ya Nzambe basengeli kobondela ye mpo bámitungisa koleka ndelo te. Alaki ete akopesa bango kimya ya motema, oyo ekosalisa bango bálonga mitungisi na bango mpe ekobatela makanisi na bango mpe mayoki na bango. Vɛrsɛ 6 elobeli lolenge ya mabondeli oyo ekoki kosalisa bango bázwa kimya ya ndenge wana.

 Malɔmbɔ ezali mabondeli oyo esɛngaka kobimisa mpenza mayoki oyo ezali na kati ya motema mpo na kosɛnga Nzambe lisalisi. Moto akoki kosala lilɔmbɔ ntango azali komitungisa to azali na mokakatano makasi, ndenge Yesu asalaki. (Baebre 5:7) Mbala mingi bato bazongelaka mabondeli yango mbala na mbala.

 Kosɛnga ezali libondeli oyo moto asɛngaka Nzambe makambo ya sikisiki. Basambeli na ye bakoki kosɛnga ye “makambo nyonso,” to “na ntango nyonso.” Kasi, mabondeli ya ndenge wana esengeli koyokana na mokano ya Nzambe oyo emonisami na Biblia.​—1 Yoane 5:14.

 Kopesa matɔndi ezali mabondeli oyo tosalaka mpo na kopesa Nzambe matɔndi mpo na makambo oyo asalelá biso mpe oyo akosalela biso na mikolo ezali koya. Ntango totyaka makanisi na biso na makambo oyo Nzambe asalelaka biso, yango esalaka ete tópesa ye matɔndi mpe yango esalisaka biso tóbatela esengo na biso.​—1 Batesaloniki 5:16-18.

 Ntango Nzambe ayanolaka na mabondeli ya ndenge wana, apesaka basambeli na ye kimya. “Kimya ya Nzambe” ezali kimya oyo eutaka na boninga ya penepene elongo na ye. (Baroma 15:13; Bafilipi 4:9) Kimya yango “eleki makanisi nyonso” mpo eutaka epai ya Nzambe mpe ekoki kosalisa biso koleka ndenge tozalaki kokanisa.

 Biblia elobi ete kimya ya Nzambe ekoki kobatela mitema na biso. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela’ ezali na elobeli ya basoda oyo ezalaki komonisa etuluku ya basoda oyo batyami mpo na kobatela engumba. Ndenge moko mpe, kimya ya Nzambe ebatelaka makanisi mpe mayoki ya moto. Esalisaka moto aboya komitungisa mingi ntango azali na mikakatano.

 Kimya ya Nzambe ebatelaka biso “na nzela ya Kristo Yesu,” mpo ezali na nzela na ye nde tosalaka boyokani ná Nzambe. Yesu apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na kosikola biso na masumu. Soki tozali kondimela ye, tokozwa mapamboli ya Nzambe. (Baebre 11:6) Yesu azali mpe moyokanisi na biso ná Nzambe. Yesu alobaki: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6; 16:23.

Makambo oyo bazali kolobela na Bafilipi 4:6, 7

 Mokanda ya Bafilipi ezali mokanda oyo Ntoma Paulo akomelaki bakristo oyo bazalaki kofanda na engumba ya Filipi. a Na mokapo ya minei ya mokanda yango, Paulo alendisi baoyo bazali na lisangá basepelaka mpe apesi bango matɔndi mpo na ezaleli na bango ya kokaba mpo epesaki ye esengo. (Bafilipi 4:4, 10, 18) Amonisi ndenge libondeli epesaka moto kimya ya Nzambe, mpe amonisi makambo oyo tosengeli kosala mpe kokanisa mpo tózwa “kimya ya Nzambe.”​—Bafilipi 4:8, 9.

a Engumba yango ezali lelo oyo na Grèce.