Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?

Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?

Eyano ya Biblia

 Nzambe te nde asalaka ete makama oyo ebimaka yango moko lelo esalema, kutu amitungisaka mpo na baoyo bazwaka makama yango. Makama oyo ebimaka yango moko ezali moko ya makambo ya mpasi oyo Bokonzi ya Nzambe ekolongola. Kasi mpo na sikoyo, Nzambe abɔndisaka baoyo bakutanaka na makama yango.​—2 Bakorinti 1:3.

 Mpo na nini tokoki kondima ete makama yango ezalaka bitumbu ya Nzambe te?

 Na Biblia, totángaka ete na bantango mosusu, Nzambe asalelaka biloko lokola mai to mɔtɔ mpo na kopesa bitumbu, kasi yango ekeseni na makama oyo ebimaka yango moko.

  •   Makama oyo ebimaka yango moko ebomaka mpe ezokisaka makasi kozanga kopona bilongi. Kasi, na kotalela Biblia, bitumbu ya Nzambe eponaka bilongi. Na ndakisa, ntango Nzambe abebisaki Sodoma ná Gomora bingumba moko na ntango ya kala, abikisaki Lota moto malamu ná bana na ye mibale ya basi. (Ebandeli 19:29, 30) Nzambe atángaki mitema ya bato ya eleko wana mpe abomaki kaka baoyo amonaki ete bazali bato mabe.​—Ebandeli 18:23-32; 1 Samwele 16:7.

  •   Mbala mingi makama yango elakaka te to elakisaka kaka mwa elembo. Kasi, Nzambe akebisaka ntango nyonso bato mabe liboso asalela biloko lokola mai, mɔtɔ to biloko mosusu mpo na koboma bango. Baoyo nyonso batosaka makebisi na ye babikaka.​—Ebandeli 7:1-5; Matai 24:38, 39.

  •   Soki makama yango mosusu ebimaka ezalaka mpe foti ya bato. Na ndenge? Na ndenge babebisaka mai, zamba to mopɛpɛ mpe batongaka bandako na bisika oyo mabele ekoki koningana, mai ekoki kozindisa yango mpe klima ezalaka malamu te. (Emoniseli 11:18) Tokopesa Nzambe foti te mpo na bikateli ya ndenge wana oyo bato bango moko bazwaka.​—Masese 19:3.

 Makama yango emonisaka ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?

 Ɛɛ, Biblia esakolaki ete na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” to “mikolo ya nsuka” makama oyo ebimaka yango moko ekosalema. (Matai 24:3; 2 Timote 3:1) Na ndakisa, mpo na eleko na biso, Yesu alobaki boye: “Nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.” (Matai 24:7) Mosika te, Nzambe akolongola makambo nyonso oyo enyokolaka bato awa na mabele, ata mpe makama oyo ebimaka yango moko.​—Emoniseli 21:3, 4.

 Ndenge nini Nzambe asalisaka baoyo bakutanaka na makama yango?

  •   Nzambe abɔndisaka bango na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Biblia endimisaka biso ete Nzambe akipaka biso mpe ayokaka mpasi ntango tonyokwamaka. (Yisaya 63:9; 1 Petro 5:6, 7) Emonisi mpe ete Nzambe alaki eleko oyo makama yango ekosalema lisusu te.​—Talá “ Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebɔndisaka.”

  •   Nzambe abɔndisaka baoyo bazwi makama na nzela ya basaleli na ye. Nzambe asɛngaka basaleli na ye bálanda ndakisa ya Yesu. Ndenge bisakweli emonisaki yango, Yesu azalaki kobɔndisa “bato oyo bazoki na mitema” mpe “baoyo bazali kolela.” (Yisaya 61:1, 2) Basaleli ya Nzambe basalaka makasi bámekola ye.​—Yoane 13:15.

     Nzambe asɛngaka mpe ete basaleli na ye básunga baoyo bakutani na makama oyo ebimaka yango moko.​—Misala 11:28-30; Bagalatia 6:10.

Batatoli ya Yehova bazali kobongisa ndako moko oyo ebebaki na mopɛpɛ makasi, na Porto Rico

 Biblia ekoki kosalisa biso tómibongisa liboso ete makama yango ebima?

 Ɛɛ. Atako Biblia ezali te buku oyo esalisaka bato bábika na ntango ya makama, kasi ezali na toli oyo ekoki kosalisa biso tómibongisa liboso makama yango ebima. Na ndakisa:

  •   Komibongisa liboso makama ebima. Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Ekozala malamu komibongisa liboso likama ebima. Yango ekoki kosɛnga kozala na sakosi oyo otyaka biloko oyo esalisaka na ntango ya likama, oyo okoki komema mpe koyeba esika oyo libota na yo ekokende soki likama ebimi.

  •   Kozwa bomoi na valɛrɛ koleka biloko ya mokili. Biblia elobi: “Toyaki na eloko te na mokili, mpe tokokende na eloko te.” (1 Timote 6:7, 8) Tosengeli kokatana te mpo na kotika ndako mpe biloko na biso mpo na kokima likama. Tóbosana ata moke te ete bomoi na biso eleki eleko nyonso oyo tokoki kozala na yango na valɛrɛ.​—Matai 6:25.